Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi ba Kamerhe basali makelele na Palais ya Justice mpo na kosenga bobimisami bwa ye


Balandi ya Kamerhe basengi bobimisami na ye lokolo bato basusu baye batikami
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:20 0:00

Balandi ya Kamerhe basengi bobimisami na ye lokolo bato basusu baye batikami

Balandi ba mangomba maike mazali nsima na Vital kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala ya président Fétshisekedi, basalaki milulu vendredi liboso ya Palais ya justice mpo na kosenga botikami bwa mokambi na bango.

Mpo na bango, misala mya bosembo misengeli kotia Vital Kamerhe te lokola moto bakomeka kokisa bosembo.

Bakomi yango na maputa balakisaki na bilongi ya bato baike bakangamaka wuto président Tshisekedi akota na bokanzi kasi basili kobimisa na boloko.

Bayi UNC (Union pour la nation congolaise) lingomba lya Vital Kamerhe, mokambi na bango azali kozwa lisali lya minganga.

Vital Kamerhe azali na nse ya etumbu ya mibu tuku mibale ya misala makasi bakisa na zomi mya bopekisi makoki ma poilitiki.

Nzonkande, basambeli ba moyi ekolo Liban Samih Jammal, nkolo société SOMIBO, oyo akatelamaki mpe etumbu elongo na Kamerhe, bayebisi ete client na bango azali nzoto kolongono te na boloko ya Makala CPRK esika atiama.

Bosambisi ya kozongela bobandelaki mposo moleki na likambo ya bopengwisi misolo bafunfami na yango.

Bato basusu baye bilongi na bango bimonisami na bilili batelemeli balakisi balaki kofunda na ba zuzi.

Lokola mwasi ya André Kimbuta, mokambu ya kala ya engumba Kinshasa.

XS
SM
MD
LG