+Bazuzi ba Cour const. balapi ndayi liboso ya Tshisekedi FCC ezalaki te +Nzoto ya bakangami elokotami nsima na ADF/Etat islamique kobuka boloko bwa Kangbayi +Ministre ya Intérieur ya Sud-Kivu alobi Ruberwa nde atindaki milulu mya Minembwe +Matata yambo na maponami ma mokonzi na Côte d'Ivoire
Martin Fayulu mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya ngonga eye ya lingomba Lamuka alobi nsima na bolapi ndayi ya bazuzi constitutionnels ete bakambi ba biyamba basengeli kokoba makasi ma bango na ntina na kosangisa ngambo inso mpo na koluka eyano ya boyokani na matata makaboli ekolo.
Ministre ya mambi ya Kati ya Etuka ya Sud-Kivu Lwabanji Lwasingabo alobi ete Ministre ya Décentralisation ya mboka Azarias Ruberwa nde apesaki mitindo ete botiami na ebongo ya bourgmestre ya Minembwe bosalama.
Bakeli mipeko ya suku ya nse ya Parlement ya lingomba FCC lya mokonzi ya kala Joseph Kabila bakomeli Cour constitutionnelle mpo kosenga yango ko limbola article 158 ya Buku likonzi mpo etali botiami bwa bazuzi. Ba députés ya FCC basengi milulu mya bolapi ndayi mitelemisama.
+PPRD eboyi PM Ilunga asalisa milulu mya kolapa ndayi ya bazuzi ba Cour const. +Ruberwa asengi koyanola na Assemblée nationale nsima ngonga 48 +CENCO epaleli boswani ya CACH na FCC botelemisi mboka +Trump alaki kolongola Sudan kati na bikolo bibe soki bafuti misolo na bayi Amerika
CENCO esengi na bana ba RDC kotika te ete bonsomi na mboka na bango bobotolama kolanda maloba masakolamaki na kalaka mokonzi na yango, abbé Donatien Nshole lundi na Kinshasa.
+Ruberwa abengisamaki na Ass. nat. koyanola mpo na botiami bwa bougmestre ya Minembwe +Minganga 377 bawuti Cuba, Russie mpe Chine balapi ndayi mpo na kobanda misala na Brazzaville +Bilembo bya maponami ma mokonzi ya Guinée bizali kozelama +Ministre ya bokolongono azwi COVID-19 na Afrika ya Ngele
+ECC esengi masolo mpo na Minembwe mpe makambo masusu +PM Ilunga asengi bolukiluki mpo mbeba ya bato na mandoki na Ituri +ULB ekozongisela RDC mikwa mya mitu ya ba Congolais +Police ebomi moto akati motu ya molakisi moko mpo na ba caricatures ya Mahomet
Police ebomi moto moko afundami na kokata motu ya molakisi moko pene Paris, na France. Likambo lyango lisalami nsima na molakisi yango kolakisa ba caricatures ya Mohammed to Mahomet na ba yekoli ba ye.
Donald Trump na Joe Biden bayanolaki butu ya jeudi, moto na moto na ngambo na ye, na mituna ya baponi. Bondongwani ya mibale kati na bango mibale bosalamaki lisusu te. President Trump aboyaki esalema na mosika mpe alingaki kaka ya miso na miso.
+Trump na Biden bayanolaki na mituna ya baponi, moto na moto na ngambo na ye +Bana pene na 11 millions bakozongela kelasi te mpo na COVID-19, elobi mokambi ya UNESCO +USA epesi ndingisa ya kosalisa babeli Ebola na ba anti-corps ya synthèses +Russie epesi ba blindés na Centrafrique
Etats-Unis epesi ndingisa ete bato bakoma kosalisama na ba anti-corps ya synthèse na bokono bwa Ebola emekamaki na RDC.
Mokambi ya UNESCO, Audrey Azoulay alaki kopesa maboko na politiki ya kelasi ya ofele na RDC. Alobi yango nsima na bokutani jeudi na président Félix Tshisekedi na cité ya Union africaine na Kinshasa.
Azarias Rubwera, vice-Premier ministre mpe ministre ya Décentralisation ya RDC akoyanola na mituna ya bakeli mibeko mpo na likambo lya Botiami ya mokambi ya commune ya Minembwe na Sud-Kivu.
Papa François atomboli Cardinal Fridolin Ambongo Besungu, Episkopo ya lokumu ya Kinshasa, na ebonga ya moko na bayi Conseil ya ba cardinaux bakozalaka kosunga ye na bokambi ya Eklezya Katoliko.
+Sassou asololi na mokambi ya UNESCO mpo na bokotisi ya Rumba ya Congo lokola bomengo ya mokili +Rwanda ezali kobanda mombongo ya bangi bo' nkisi +Mopanzi ya Kalafulo ya FM Goma azali na bobombani wuto atunaki Tshisekedi motuna ya ba officiers basalaka mombongo +G20 ebakisi sanza 6 mpo na nyongo
Mbulamatari ya Rwanda epesi ndingisa ete bangi to cannabis ebanda kolonama na mabele na yango na ntina ya kotekama libanda mpo na koselelama lokola mono.
Président Denis Sassou N’Gueoss asololi na mokambi ya UNESCO, Audrey Azoulay, mpo etali bondimami bwa Rumba ya Congo bo’ bomengo (patrimoine) ya UNESCO.
Police ebetaki molinga, etobolaki ba pneus ya motuka Martin Fayulu azalaki na yango mpe epenzaki bato na botamboli motambwisi ya Lamuka mpe mokambi ya ECIDE abengisaki mpo na bomoko ya mboka mpe koboya Minembwe bo' commune rurale. VOA Lingala ebengaki député Ados Ndombasi.
+Gentiny Ngobila, mokambi ya Kinshasa mpe police baboyi botamboli ya Fayulu mpo na bomoko ya mboka +Ruberwa alobi akendaki te kotia bourgmestre na Minembwe +Bato bakobi kotambola mpo na mbeba ya police na Nigeria +Cristiano Ronaldo azwami na COVID-19
Voir plus