Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Minembwe : Bakeli mibeko bakati ete Ruberwa ayanola na mituna na bango


Azarias Ruberwa, vice-président ya kala ya RDC, na Kinshasa, 2006. (Photo ezaka date/AFP)
Azarias Ruberwa, vice-président ya kala ya RDC, na Kinshasa, 2006. (Photo ezaka date/AFP)

Azarias Rubwera, vice-Premier ministre mpe ministre ya Décentralisation ya RDC akoyanola na mituna ya bakeli mibeko mpo na likambo lya Botiami ya mokambi ya commune ya Minembwe na Sud-Kivu.

Bakeli mibeko baike nde bandimi lelo na likita ya Assemblée nationale ete bobengisami na ye bozali na lintomba.

Na biyano apesaki bapanzi sango mikolo mibale mileki, Azarias Ruberwa akundolaki ete mokambi ya commune ya Minembwe lokola bokelami ya commune ya Minembwe esalamaka mibu mibale mileki.

Kasi milulu ya kotia ye na esika esengami na bayi Societe civile mpe mokambi ya etuka ya Sud-Kivu na minu ya interieur ya etuka nde bandimaki yango.

XS
SM
MD
LG