Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu asengi bakambi na biyamba komema boyokani mpo na kosilisa matata na mboka


Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya ngonga eye ya lingomba Lamuka, na Kinshasa, le 30 juin 2019.
Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya ngonga eye ya lingomba Lamuka, na Kinshasa, le 30 juin 2019.

Martin Fayulu mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya ngonga eye ya lingomba Lamuka alobi nsima na bolapi ndayi ya bazuzi constitutionnels ete bakambi ba biyamba basengeli kokoba makasi ma bango na ntina na kosangisa ngambo inso mpo na koluka eyano ya boyokani na matata makaboli ekolo.

Lisikulu ya M. Faylu litiami na ba réseaux sociaux nsima na bolapi ndayi ya bazuzi basato ya Cour constitutionnelle.

Mpo na M. Fayulu, "matata mamonisami na botiami bwa bazuzi baye bozali nde mpo na kolongala mayele ma bana ba Congo na mpasi bazali komona, na likambo lya bokelami bwa commune ya Minembwe, bosenga na bango ya botiami na mosala ya rapport mapping mpe bokelami ya Tribunal ya molongo mpo mbeba esalama na RDC".

"Koleka bana ba Congo millions sambo bazali na nzala, millions mitano bakima bisika bavandaka, mpe nkoto eike bakufi na koboma, mboka ezali na likama lya kokatama mpe na Kinshasa Kabila na Tshisekedi bazali kosala lisano ya poliki," ekebisi M. Fayulu.

"Esengeli nde boyokani ya nsoni mpe ya moyibi bobimisa o’boso ya bana ba Congo banso," esengi M. Fayulu.

Alobi M. Kabila na Tshisekedi bazali kowelela bokonzi babotolaki bana ya mboka.

Mpo na ye, MM. Kabila na Tshisekedi bazali kowelela nani akokonza CENI to magistrature mpe kobebisa démocratie ya mboka.

XS
SM
MD
LG