Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump na Biden bayanolaki na mituna mya baponi


Bondongwani ya Trump na Biden yambo na maponami ya mokonzi ya mboka ya Etats-Unis ma le 3 novembre 2020.
Bondongwani ya Trump na Biden yambo na maponami ya mokonzi ya mboka ya Etats-Unis ma le 3 novembre 2020.

Donald Trump na Joe Biden bayanolaki butu ya jeudi, moto na moto na ngambo na ye, na mituna ya baponi. Bondongwani ya mibale kati na bango mibale bosalamaki lisusu te. President Trump aboyaki esalema na mosika mpe alingaki kaka ya miso na miso.

Joe Biden mpe aboyaki bondwangani ya miso na miso mpo na M. Trump awutki kobika na COVID-19.

Président Trump, républicain, alakisamaki na tv NBC wuta Miami na Florida mpe vice-président ya kala, Biden, démocrate, azalaki na ABC News wuta Philadephia na Pennsylvania.

Bayi misala mibgonisaka bondogwani bwango boboyaki mpo Donald Trump awutaki kobika na COVID-19.

Bondonwami mosusu bosengeli kosalama yambo na mposo moko na maponami ma le 3 novembre.

Ba candidats babale bazongeli lelo kolamusa bato mpo bapona bango.

Biden azali kokenda na Southfield na Michigan mpe M. Trump na Florida mpe Georgia.

XS
SM
MD
LG