Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi ayambami na Sassou na Brazzaville


Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville bapesani lipwepwe na libongo ya Brwazzaville, Congo, 9 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville bapesani lipwepwe na libongo ya Brwazzaville, Congo, 9 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshikedi akiti na mpokwa ya mokolo mwa yambo na Brazzaville epayi wapi ayambami na mokokanani wa ye Denis Sassou N’Guesso.

Kolanda présidence ya RDC, M. Tshisekedi alandami na lipinga linene. Kati na yango ezali na ministre ya mambi ya bapaya ya RDC, Marie-Thérèse Nzuzi, mokambi ya misala ya présidence Vital Kamerhe mpe baye ya cabinet na ye basusu.

Bokomi ya M. Tshisekedi bozali mpo na bokutani to Conférence ya Kintele eye ekosalama banda le 10 kino le 12 septembre 2019.

Bakonzi ya bikolo misusu mpe bakozala wana. João Lourenço ya Angola mpe asilaki kokoma na Brazzaville mpo na yango.

Bokutani byango bosalami na Banque chinoise ya développement na ministère ya Finances ya Chine.

XS
SM
MD
LG