Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabila na matanga ya Mugabe na Harare


Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique, apesi losako na nzoto ya nkondo Robert Mugabe na matanga mazali kosalama na Harare, engumba mokonzi ya Zimbabwe, le 14 septembre 2019. Azalaki na milulu myango na bakonzi bakala ya bikolo biike.
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique, apesi losako na nzoto ya nkondo Robert Mugabe na matanga mazali kosalama na Harare, engumba mokonzi ya Zimbabwe, le 14 septembre 2019. Azalaki na milulu myango na bakonzi bakala ya bikolo biike.

Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique, azali na matanga ya Robert Mugabe, mokambi ya kala ya Zimbabwe, na Harare.

M. Kabila azalaki na milulu ya matanga mazali kosalema uto mokolo ya minei na stade national ya masano na engumba mokonzi ya Zimbabwe.

Bakonzi ya bikolo ebele, ya kala mpe ya sika, bazali mpe wana elongo na président ya Zimbabwe Emmerson Mnagangwa.

PPRD, Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie, lisanga ya politiki ya Joseph Kabila, esalaki o’mokolo ya minei milulu ya bokanisi Robert Mugabe. Bantoma ya mboka ebele lokala ya Zimbabwe, ya Cuba mpe Angola bazalaki na milulu ya PPRD.

Mpo na bayi FCC (Front commun mpo le Congo), lingomba monene ezali na nse ya M. Kabila, "nkondo Robert Mugabe azali elombe ya bitumba ya bonsomi ya ekolo na ye mpe ya Afrika mobimba," eyebisaki VOA Lingala, ntoma (député) Lambert Mende nsima na kufa ya nkondo Mubage le 6 septembre.

Na Harare, Kabila azali elongo na Rupiah, mokonzi ya kala ya Zambie, Thabo Mbeki mokonzi ya kala Afrika ya ngele, Olusegun Obasanjo ya Nigeria, Sam Nujoma ya Namibie mpe bakonzi ya kala basusu.

Nzokande João Lourenço, président ya Angola, Teodoro Obiang Nguema Mbasogo ya Guinée équatoriale, Sahle Work-Zewde présidente ya Ethiopie, mpe bazali naino na bakonzi na mboka esusu bazali mpe wana.

Robert Mugabe awaki le 6 septembre 2019 na lopitalo na Singapour, na mibu 95. Nzoto ezongisamaki na Harare na libandela ya mposo, ekonfkunda o'mokolo ya eyenga.

Nkndo Mugabe akambaki Zimbabwe mibu 37 uto lipanda na yango. Kasi mampinga mabenganaki ye na bakonzi nsima na mobulu ya bana ya ekolo na ye molandaki bolongoli ya vice-président Mnagangwa na suka ya 2017.

Mampinga mazongisa bokonzi na ba civils. Mpe na 2018, Mnagangwa alongaki maponami mpe atikli mokonzi ya Zimbabwe kino ntango oyo.

XS
SM
MD
LG