Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Libota na mbulamatari bazali kobendana likolo ya nzoto ya Mugabe na Zimbabwe


basoda bamemi nzoto ya nkondo Robert Mugabe, mokonzi ya kala ya Zimbabwe, na HAhare, 12 septembre 2016.
basoda bamemi nzoto ya nkondo Robert Mugabe, mokonzi ya kala ya Zimbabwe, na HAhare, 12 septembre 2016.

Kobendana ezali kati na libota ya nkondo président Robert Mugabe na mbulamatari ya Zimbabwe mpo etali bokundami ya mokonzi moye ya kala ya ekolo eye, oyo akufaki mposo moko moleki.

Libota lizali kofunda bakonzi ya ekolo mpo na kolanda te mokano ya suka ya nkondo Mugabe.

"Mokonzi ya kala akokundama te, lokola mbulamatari elingi, na 'bilanga na bilombe', pene na engumba mokonzi," esika ebongisama mpo na bokundami ya babundi ya bitumba ya bonsomi, elobi Leo Mugabe, mwana nkazi ya Mugabe oyo azali molebeli ya libota.

"Nzoto na ye ekokundama na Kutama (mboka ya babboti ba ye), o’mokolo mwa eyenga mpe bokundami bwango bokosalama na kobombama, liboso kaka ya libota, kolanda mokano ya suka ya nkondo Robert Mugabe," ebeti sete Leo Mugabe.

Libota lizali kofunda mbulamatari na koluka kondimisa bango na makasi linaka ya matanga mpe ya bokundi, liye likokani te na mokano ya mowei.

"Tolobaki ete akokundama o’mokolo mwa eyenga. Ndenge nini? Etikali toyeba. Kasi libota likozala na liloba ya suka," eyanoli président Emmerson Mnagangwa, mokitani ya Robert Mugabe na bokambi ya Zimbabwe. M. Mnagangwa alobi yango ntango nsima na kopesa losako na nzoto ya mowei.

Nzokande nsima na kosolola na Grace Mugabe, mwasi ya mowei, Leo Mugabe abongoli maloba ma ye.

"Libota etikala koloba te ete akokundama na Zvimba (…) kasi bokundami bokosalama na kobombama, kaka na baye ya libota," elobi Leo Mugabe.

Moko na ndako ya nkondo Robert Mugabe ezali na Kutama, na district de Zvimba, pene na kilomètres nkama na Harare, engumba mokonzi.

XS
SM
MD
LG