Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda endimi kozwa ba réfugiés ya Afrika bakangama na Libye


Bakima mboka na bango bakangami pene na mbu, na Tripoli, Libya, 26 juillet 2019.
Bakima mboka na bango bakangami pene na mbu, na Tripoli, Libya, 26 juillet 2019.

Rwanda endimi kozwa mpo na mwa ntango baye bakima mboka na bango mpe bazali kosenga kobatelama kasi bakangami na Libye.

O’mokolo ya mibale, moko na batalisi na elongi ya Rwanda etie manzaka na mokanda elongo na Union africaine mpe Haut Commissariat ya ONU mpo na bakima mboka.

Hope Tumukunde Gasatura, ntoma ya Rwanda na UA alobi na bokutani na bapanzi sango ete ekolo na ye ekokamata yambo bato nkama mitano (500) na mposo mikoya.

Bato ya yambo bakozala baye ya bikolo ya liseke ya Afrika, na monyele.

XS
SM
MD
LG