Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mwana ya dos Santos moko akosambisama mpo na kaniaka


José Filomeno dos Santos, moko na bana ya Jose Eduardo dos Santos mokonzi ya kala ya Angola, 2018.
José Filomeno dos Santos, moko na bana ya Jose Eduardo dos Santos mokonzi ya kala ya Angola, 2018.

Jose Filomeno dos Santos, moko na bana ya Jose Eduardo dos Santos, mokonzi ya kala ya Angola, akosambisama le 25 septembre mpo na likambo ya kaniaka, eyebisi misala ya bosembo ya mboka na ye.

Filomeno dos Santos azalaki mokonzi ya kala ya fonds d’investissement souverain angolais (misala ya kotiya mosolo na ba compagnies na Angola). Afundami elongo na basungi ba ye basato, kati na bango mokambi ya banque centrale ya kala Valter Filipe e Silva. Bafundami na kolekisa mosolo ya misala mabe na nzela elamu.

Misala ya bosembo milobi ete fraude (misala ya kobuba) na bango ekomaki na koleka 15 milliards ya ba dollars.

Filomeno dos Santos ayebana mpe na nkombo ya Zedu. Akangamaki mpo na mwa ntango na septembre 2018 mpe atikamaki kasi azalaki na botalami ya misala ya mibeko na sanza ya misato kino bosambisami na ye.

Tata wa ye atiyaki ye na bokambi ya fonds souverain na 2013. Kasi bamolongolaki na sanza ya yambo ya 2018 mikolo mike nsima na bokomi na bokonzi ya president Joao Lourenco.

XS
SM
MD
LG