Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Monusco ebakisi bibundeli mpe esengi kimya na bana ya Hauts Plateaux na Sud-Kivu


Leila Zerrougui, mokambi ya Monusco (Misala ya Nations unies na Congo démocratique), na bokutani na Yangon, Myanmar (Birmanie), 16 juillet 2015.
Leila Zerrougui, mokambi ya Monusco (Misala ya Nations unies na Congo démocratique), na bokutani na Yangon, Myanmar (Birmanie), 16 juillet 2015.

Mokambi ya Monusco, Leila Zerrougui, asengi na bakambi ya kabila (communauté) inso ya Hauts Plateaux na Sud-Kivu kotelemela baye banso bazali komema bitumba kati na bango. Asakoli ete Monusco ebakisi bibundeli na yango na esika eye.

"Tosengi na bakambi banso ya mboka mpe ya bituka baye bawuta na bitando ya Fizi, Mwenga mpe Uvira, bapalela bitumba bayike bazali kosala na kabila songolo to na bakambi to na ba nkumu ya mboka nzike; batala te bokeseni ya bikolo, mpe basala nyonso esengeli mpo na kosukisa bitumba," elobi Mme Zerrougui na liyebisi na liyebisi likomeli VOA Lingala.

"Kabila (communauté) inso ya Hauts plateaux mpe ya commune rurale ya Minembwe esengeli bayeba kovanda na boyokani, na kimya, na bokengi mpe na bosembo… na biloko na bango mpe lolenge na bango ya kobika esengeli etosama," eyebisi mokambi ya Monusco.

Kati na bato 500 to 600 batelemaka na ba bases ya Monusco na Minembwe mpe na Mikenge mpo na koluka lisungi mpe kobatelama, elobi molebeli ya Monusco, Mathisa Gillmann na VOA Lingala. "Ba Casques bleus bapesaka bakimi bitumba baye bileyi kasi esengeli bokengi ya malamu bopesamela na lombangu baye baspesaka lisungi na bakima bitumba", ebakisi M. Gillmann.

Kolanda Mme Zerrougui, Monusco etindi ba héliptères ya bitumba mpo kopesa maboka na mampinga ya FARDC, ebakisi ba patrouilles ya kobangisa banguna, mpe esali base temporaire uto le 12 septembre mpo na batela ba civils na bisika biye.

XS
SM
MD
LG