Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 14 nde bakufaki na likama ya engunduka na Tanganyika


Wagon ebaluki na Kamina, na Haut-Lomami, 16 mai 2007.
Wagon ebaluki na Kamina, na Haut-Lomami, 16 mai 2007.

Motango ya suka ya bawei na likama ya endunduka lisalamaki o’mokolo ya minei na Tanganyika, mozali zomi na minei (14), eyebisi mokambi ya etuka eye, Zoe Kabila.

Tozali kolela kufa na bato zomi na minei, bato zomi na mwambe bazokaki kati na bango sambo na bapota minene, esakoli na post tweet moko, Zoe Kabila.

Etuka ezali koslisa bato banso bazwi nkwokoso, elobi mokambi ya etuka ya Tanganyika.

Likama lyango lisalamaki na ngonga 3h ya ntongo eyebisi o’mokolo ya minei ministre ya mambi ya kosunga bato, Steve Mbikayi.

Engutuka ya komema biloko eye ewutaki Maniema ebalukaki na 115 kms kati na engumba Kalemie na mboka Mayimaridi.

Ntina ya likama lyango liyebisami te.

XS
SM
MD
LG