Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Secrétaire d’Etat ya Amerika mpo na bokolongono azelami na Kinshasa


Secrétaire d’Etat ya mambi ya bokolongono mpe misala ya bomoto ya Etats-Unis, Alex Azar, na président Donald Trump na nsima na ye na lisikulu, na Washington DC, 11 mai 2018.
Secrétaire d’Etat ya mambi ya bokolongono mpe misala ya bomoto ya Etats-Unis, Alex Azar, na président Donald Trump na nsima na ye na lisikulu, na Washington DC, 11 mai 2018.

Secrétaire d’Etat ya mambi ya bokolongono mpe misala ya bomoto ya Etats-Unis, Alex Azar, akokoma mikolo mikoya na Kinshasa, eyebisi département d’Etat ya Etats-Unis.

M. Azar akosolola na president Félix Tshisekedi mpe na bakambi ya bokolongono ya Congo démocratique mpo etali lolenge mboka mibala ekoki kosala elongo mpo na bokolongo ya bana ya ekolo eye.

M. Azar nde asololi mingi mpenza na ministre ya Santé ya sika Eteni Longondo na mokambi ya bitumba na Ebola, Dokolo Jean-Jacques Muyembe. « Masolo mango makozala mpo na ndenge Amerika ekopesa lisusu maboko na makasi ya bana ya Congo mpe ya molongo mpo na kosilia Ebola, kolonda liyebisi.

Tokundola ete Etats-Unis epesaka misolo mpe lisungi mingi koleka na Congo démocratique mpo na bokolongo na nzela ya CDC mpe USAID.

Banda sanza ya mwambe ya 2018, USAID esungaki na koleka ba dollars milioni nkama na ndambo mpo na Ebola. Yango ebakisami na Koleka dollars nkama misato mipesamaki mpo na soins de santé primaire ya ban aya RDC.

XS
SM
MD
LG