Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pasteur TB Joshua ya Nigeria akufi


Motambwisi mpate TB Joshua na milulu mya mobu ya sika, Lagos, Nigeria, 1er janvier 2015.
Motambwisi mpate TB Joshua na milulu mya mobu ya sika, Lagos, Nigeria, 1er janvier 2015.

Moteyi mpe mosali na Nzambe TB Joshua ya Nigeria akufi o'mokolo mwa mposoa na mboka na ye Nigeria, esakoli etonga na ye Synagogue Etonga ya Bikolo binso ya TB Joshua Ministries.

TB Joshua Ministries elobi ete mokambi na yango azalaki na liyangani o’mokolo mwa mposo na basungi mpe "amibendaki pembeni mpo na losambo ya ye moko, bamokutaki miso likolo mpe azalaki lisusu na bomoi te," etatolaki mwasi wa ye.

Eloko na eloko ezali na ngonga na yango – ngona ya koya awa mpo na losambo mpe ngonga ya kozonga ndako nsima na mosola, eteyaki phorphete Joshua.

Alingaki akokisa mibu 58 mposo mokoya.

"Lolenge malamu ya kolekisa bomoi ezali kosolela yango na makambo maye makotikala ata nsima na bomoi," ekobaki na mateya ma ye ma suka.

"Ekozala obongama na Nkolo akoya? Esengeli ozala ya kobongama na kondimela ye, kotosa ye mpe kobika mpo na ye," elobaki na mateya ma ye masuka M. Joshua.

Mateya mango matiama na etando eke.

Bato mingi baleli ye na Nigeria mpe na mokili.

TB Joshua azalaki kokamba moko ba bitonga ya minene koleka na Nigeria mpe na Afrika.

Ateya Yesu Klistu lokola mobikisi mpe bomoi na seko.

Kasi azwaki mwa kwokonso na misala mya bosembo nsima na bokweyisami ya moko na ba temple oyo ebomaki bato pene na nkama mibale.

Azalaki koteya na kopamela baye babalanaka basi na bais mpe mibali na mibali mpe ba réseaux sociaux elonglaki mateya mango.

XS
SM
MD
LG