Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atondi bana ya Katanga mpo baboyi kolanda baye balingi bokabwani


Président Félix Tshisekedi na Lubumbashi, Haut-Katanga, 12 mai 2021, (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na Lubumbashi, Haut-Katanga, 12 mai 2021, (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomaki mercredi na Lubumbashi na bowuti na ye na Uganda epayi azalaki na bolapi ndayi ya mokokani wa ye Yoweri Museveni. Atondi bana ba Grand Katanga na ndenge balandi te batobalingi bokwani ya mboka.

"Natondi bana ya Katanga na ndenge boboyi kolanda bato balingi kokabola ekolo," elobi M. Tshisekedi liboso lya etuluku ya bato basangani nsima na bokomi na ye na Lubumbashi.

Etuku ya Katanga monene lokola Haut-Katanga ezalaka na likama ya basimba minduki balinganga bokabwani.

Mwa kobanga ezalaki, nsima na mokonzi ya kala kokende kovanda koleka sanza minei na Haut-Katanga nsima na M. Tshisekedi kokata boyokani ya bokambi mboka bozalaki kati na mangoma CACH (lingomba lya ye) na FCC ya mokonzi ya président ya kala Joseph Kabila.

Wuto avandisamaki na ebonga, M. Tshisekedi akambi na majorité FCC-CACH kino pene na mibu mibale.

Nkanda ezalaki ngambo mibale. Mpe Unioin sacrée liboke lya majorité ya sika ekwisaki bakonzi mingi ya FCC lokola na suku mibale ya PArlement mpe Ministre wa Yambo.

Nzolande. mbala mingi, basimba minduki Bakata Katanga basalaka bitumba ata kati ya Lubumbashi.

Mposo mibale mileki bilenge baike batikamaki nsima na kongama mpo bazwamaki na nzamba, motaka, kobelelaka milimo mpo na bakufaka te na bitumba balingaki kosala na lingomba ya Bakata Katanga, elobaki police.

Ndenge moko mpe bakulaka ya etuka eye mpe babangisaka kokata etuka eye.

Ba sanza eleki, Pasteur Daneil Ngoyi Mylunda, moko na bayi nzinga nzinga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila akangamaki nsima koloba na mateya ete soki bokonzi ya sika etosi mokonzi ya kala te na molongani wa ye, etuka ekoki kotama.

Nzokande, M. Tshisekedi asala mwa makasi mpo na kozala pene na bayi Katanga.

Bakisa Ministre wa yambo, Sama Lukonde oyo azali ya Katanga, Directeur ya cabinet ya M. Tshisekedi azali ya Katanga lokola mpe molobeli ya mokonzi ya mboka mpe mokambi ya misala ya media na ye.

M. Tshisekedi mpe azali na boyokani malamu na Gabriel Kyungu wa Kumwanza, moyi politiki ya makasi ya Katanga, lokola mpe na Moïse Katumbi, na liboke lya bokambi libengami Union Sacréee pour la république.

Union sacrée pour la république nde majorité ya sika ezali kokamba mbulamatari nsima na bokabwani ya libala CACH-FCC ya MM. Tshisekedi na Kabila.

XS
SM
MD
LG