Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID-19: Etats-Unis epesi $274 millions na molongo mpe $6 millions na RDC


Président Donald Trump ya Etats-Unis na Maison Blanche, Washington, 30 mars 2020.
Président Donald Trump ya Etats-Unis na Maison Blanche, Washington, 30 mars 2020.

Etats-Unis epesi pene 274 millions ya ba dollars ya lisungi ya bokolongono na bikolo nziike ya Afrika mpe 6 millions dollars na RDC mpo na bitumba na coronavirus ya sika.

Mpo na eyano ya molongo mobimba ete ya Etats-Unis, département d’Etat mpe USAID epesi mpo na yambo misolo pene 274 millions ya ba dollars ya lisungi ya bokolongono mpe ya lisalisi na bikolo biye bizali na bosenga, kobakisa na yango, topesaka wuto kala na ba organisations multiatérales lokola OMS mpe UNICEF, esakoli liyebisi ya Département d’Etat ya Etats-Unis.

"Etats-Unis epesi lelo $6m ya lisungi mpo na kobundisa COVID-19 na RDC. Yango ekomisi makoki masi mapesamaki mpo na kobundisa Ebola mpe kobongisa système ya santé congolais mpe kotala na lolenge ya boyokani na biso na RDC," ekomi na Twitter Département d’Etat ya Etats-Unis.

Lisungi ya na USAID ya pene na 274 millions epesami na mboka ya Afrika:

Angola (570 000 USD), Burkina Faso (2,1 millions USD), Cameroun (1.4 millions USD), Côte d’Ivoire (1.6 millions USD), Éthiopie (1.85 millions USD), Kenya (1 million USD), Mozambique (2.8 millions USD), Nigeria (7 millions USD), Rwanda (1 million USD), Sénégal (1.9 USD), Afrique du Sud (2.77 millions USD), Tanzanie (1 million Usd, Zambie 1.87 millions USD), Zimbabwe (470.000 USD), Centrafricaine (3 millions USD), Somalie (7 millions USD), le Soudan du Sud (8 millions USD) mpe Soudan (8 millions USD).

XS
SM
MD
LG