Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba soda ba pulusu na bayi bokengi bakopona mokonzi mboka mercredi na Congo-Brazzaville


Ba soda na camp ya Mpila, na Brazzaville, le 5 mars 2012.
Ba soda na camp ya Mpila, na Brazzaville, le 5 mars 2012.

Mecredi 17 mars nde basoda, bapulusu na bayi bokengi bakopona mokonzi ya mboka yambo na maponami ma bato banso le 21 mars na Congo-Brazzaville.

Bakonzi ba mboka basengi na bana ba Ekolo kosala mosala bo’ momesano.

Misala minso mikozala bo' momesano.

Nzokande moko na ba candaidats na maponami maye, Guy Brice Parfait Kolelas atelemisaki meetingi na ye ya campagne nsima na kozwa nkwokoso na nzoto. Ezalaki na suka ya mposo moleki.

Na ngaomba na ye, pasteur Ntumi to Frederic Bintsamou mokambi ya kala ya batomboki y aba Nindja mpe motambwisi ya Conseil national ya ba républicains esengi ete maponami masala na kimya, na pole, na bonsomi mpe botosi mibeko.

XS
SM
MD
LG