Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pene na bato 15 babomami na territoire ya Beni


Ba soda ya Afrique du Sud ya MONUSCO na Oicha, Beni, 7 octobre 2018.
Ba soda ya Afrique du Sud ya MONUSCO na Oicha, Beni, 7 octobre 2018.

Pene na bato zomi na mitano bakufi na mokolo moko na territoire ya Beni, na Nord-Kivu. Administrateur ya Beni afundi ba ADF kozala baye basali bomomami boye.

Bato koleka nkama mibale na tuku motoba (koleka 260) basili kobomama na bisika yango wuto libandale ya zanza ya zomi na moko.

Mokambi ya territoire ya Beni alobi mobateli mpate to pasteur moko mpe azalaki kati na bawei.

"Nzoto 14 ezwamaki, bawei babomamki na makwangola mpe bibundele misusu, yango ezali motango ya suka te," eyebisi mokambi ya territoire ya Beni, Donat Kibwana.

Bato babale babimaki na mpota ya makwangola na mitu, bazali kozwa lisungi na lopitalo ya Oicha, na 20 km na nord ya Beni.

Yango ememi na 265 motango ya baye bakufi na territoire eye uto novembre, elobi molukiluki ya ONG KST (Baromètre sécuritaire ya Kivu).

Administrateur ya Beni afundi ba ADF kozala baye basali bomomami boye.

XS
SM
MD
LG