Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bituma na Ebola bitelemi na Beni


Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)
Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)

Botelemeli ya bavandi ya Beni mpe Butembo mpo na bobomami na bango na maboko ya ba ADF botindi misala ya kobundisa Ebola mitelema na bisika biye.

"Misala na biso minso ya kolamusa bato, mangwele, bokundi bibembe na bokengi, etc mitelemisami kasi ozali nanu awa," eyebisi mokambi ya bitumba biango, Dr. Jean-Jacques Muyembe.

Vendredi, mikolo misato mikoki, bavandi ya Beni mpe Butembo bazali kolakisa kanda na bango mpo bobomami ya bayike na bango na ba ADF ata Monusco (Mission ya ONU) ezali wana mpe mampinga ya RDC mazali kosala misala ya kobengana batomboki baye.

Police ebetaki gaz lacrymogène mpe masasi likolo mpo kobengana baye bazalaki kotelemela base ta ba casques bleus ya Monusco na nzela ya bokoti Beni.

Bavandi bazali kolela ete ba ADF babomi bato tuku motoba wuto sanza ya zomi na moko ebandaki.

Nzokande bopesi mangwele bozali kokoba bisika bisusu.

Mangwele ma mibale mazali kopesama wuto mposo mibale.

Koleka bato 373 basili kozwa yango. Dr. Muyembe ye moko mpe azwi yango.

XS
SM
MD
LG