Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

ONU ekumisi bakambi ya bitumba na Ebola mpo na lobiko ya bato 1.000


Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres azali kopesa certificat na baye babikisami na bokono ya Ebola na Mangina, Nord-Kivu, 1er septembre 2019.
Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres azali kopesa certificat na baye babikisami na bokono ya Ebola na Mangina, Nord-Kivu, 1er septembre 2019.

ONU epesi longonya na bakambi ya bitumba na Ebola mpe na bokasi ya basali mpe basalisi baye basungi na lobiko ya bato 1.000 na bokono boye bozali kongala uto le 1er août 2018 na monyele ya RDC.

Baye babikisami na kolonga Ebola, bango mpe bazali kosalisa na kopesa toli na baye bazwi bokono mpo na koluka lisunga na lombano mpe kobebisa ntango te.

"Baye banso babiki na bokono boye bapesi biso makasi ya kokoba kobundisa na makasi Ebola," elobi mokambi ya eyano ya lombango na Ebola ya ONU, David Gressly.

"Tokoki te kolonga bitumba na bokono boye soki bana ya Congo bapesi biso maboko te. Ntango bavandi mboka lokola Rwangoma to Mabolio bapesaki mapoko, tomonaki ndenge motango ya babeli ya Ebola mokitaki," eyebisi M. Gressly.

Mpo na ye, esengeli ONU ekoba kobongisa bokengi ya basali ya bokolongono elongo na ya bana ya Congo. "Esengeli mpe tokoba ko mema ba communautés komikotisa na bituba yango," ebakisi M. Gressly.

Na ngambo na ye, Dr Ibrahim Socé Fall, mokambi ya mibale ya OMS (Mabongisi ya molongo mpe bokolongono), alobi ata bilokolo lokola mangwele, nkisi mpe bisaleli bisusu bizali mpo na kosalisa na Ebola, lisungi ya baye balongi to babiki na bokono yango ezali na lintomba mingi.

Baye bikisami bazali kosalisa na kopesa toli na basusu.

"Nakanisaki nakobika te kasi nabikisami sik’oyo, nakozonga na bisika navandaka mpe nakolobela bango balekisaka ntango te mpo na koluka lisungi mpamba te okoki kobika soki obandi kozwa nkisi noki," elobaki Kavira, moko na baye babikisamaki na maladi ya Ebola, ntango azalaki kozwa certifat nsima na lobiko na ye, na maboko ya kalaka mokonzi ya ONU Antonion Guterres, na ebandeli ya septembre na Beni.

XS
SM
MD
LG