Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Museveni bandimi kotonga pene na 1.200 kms ya nzela na mibu mibale


Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)
Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Ouganda Yoweri Museveni na masolo na Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)

Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya Ouganda bayokani mpo na kotonga pene na 1200 km ya nzela kati na bikolo mibale. Bakonzi babale baye balobi yango na liyebisi batie mokoloto o’mokolo mwa mposo na mobembo mwa M. Tshisekedi wa yambo na Ouganda.

"Basibamoni mpe bandimi kobanda kobongisa elongo nzela ya lotomo eye, na sanza tuku mibale na minei ekolanda : nzela ya Mpondwe-Beni (877 km), nzelaya Goli-Bunia (181 km) mpe nzela ya Bunagana-Rusthuru (24 km)", elobi bakonzi babale na liyebisi.

Bayokani mpo kasala elongo mpeza, na bikolo bisusu ya etuka ya Grands Lacs na ntina ya koluka eyano mpo na etali ba "forces négatives" mpe mangomba ya basimba minduki na etuka eye, mpe mingi mpenza na RDC.

M. Museveni apesi longonya na bosengi ya RDC kokota na lisanga ya bikolo ya monyele ya Afrika.

XS
SM
MD
LG