Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato batamboli bisika mingi mpo na kotelemela kaniaka


Bato batomboli na nzela na Goma, Nord-Kivu, 24 aout 2013.
Bato batomboli na nzela na Goma, Nord-Kivu, 24 aout 2013.

Bato batamboli bisika biike na ekolo Congo démocratique mpo kotelemela kaniaka, lokola CLC (Comité laïc catholique) esengaki na mbela na yango. Na Kinshasa botambolami bosalami mpo bopusanaki mpo na mokolo ya lundi.

Na Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu, bituluku na bato basanganaki na nzela ya parquet ya grande instance ya Goma epayi wapi batikaki mokanda ya bosenga na bango.

Na bacalicots na bango bazalaki koloba baboyi kaniaka mpe basengi etumbu likolo na moyibi to bopengwisa misolo manso ya l’Etat.

Ba calicots misusu mizali kosenga ete 15 millions ya ba dollars maye mabunga maye na kozongisama mpe etumbu epasama.

Bituluku na bato bazalaki kuna. Ba klisto ya katoliko mpe na bato na basusu. Baye ya ba mouvements citoyens mpe mangombo ya politiki bayike mpe bazalaki wana.

Batamboli bakitaki na parquet ya grande instance epayi wapi bapesaki mémorandum na maboko ya président Fidele Kibala.

"Na yoki maloba na bino. Na kotinda yango na bakonzi na kinshasa," eyebisaki M. Kibala.

Bisika bisusu mpe batambolaki. Lokola na Butembo mpe ba Beni.

Na Beni, mingi mingi bato baye bamibengaki ya lingomba Lamuka babakisa na bosenga ya kosilisa kaniaka, bobandi ya bitumba ya kosilisa ba basimba minduka mpe koleka mingi ya ba ADF.

Likama moko te liyebisami na botamboli boye.

Na Kinshasa, CLC endimaki kotiya botamboli yango o’mokolo ya lundi. Mpo o’mokolo ya mposo, president Felix Tshisekedi azalaki kobanda misala ya Kin bopeto.

XS
SM
MD
LG