Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akomi Ouganda


Président Félix Tshisekedi na bokomi bwa ye na libanda ya mpepo ya Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)
Président Félix Tshisekedi na bokomi bwa ye na libanda ya mpepo ya Entebe, Ouganda, 9 novembre 2019. (Facebook/Valery-Giscar Kusema)

Président Félix Tshisekedi akomi na Ouganda mpo na mobembo na ye ya yambo wuta akota na bokonzi na janvier 2019.

Akozala na masolo na mokokani mwa ye ya ekolo Ouganda Yoweri Musevi.

Bakosolola mingi mpo etali bokengi lokola mampinga ya FARDC mabandaka wuto mposo mibale misala ya kobengana batomboki ya ADF baye bawuta mingi mingi na Ouganda mpe basalaka bitumba na monyele ya mboka RDC.

MM. Tshisekedi na Museveni bakosolola mpe mpo etali bozongi ya ex-23, batomboki ya RDC baye bakima na Ouganda mpe na Rwanda.

Masolo na bango makotala mpe lisusu matata mazalaka na tribunal ya molongo kati na mboka mibale.

RDC esengaka Ougana kofuta ye ba dollards milliards zomi mpo na ndenge mboka ya Museveni etikaka mampinga na yango na mabele ya Congo nsima na 1998 mpe mapinga myango mapunzaki, mabomaki mpe mabebisaki biloko, ntango mokonzi ya kala Laurent Désiré Kabila ayebisaki bango te lisalisi na bango mpo na kobengana Mobutu Sese Seko esilaki.

Ouganda eboya kondima motanga mosengamaki mpe eloba ete mampinga na yango mayaki na RDC na bobengisami ya Laurent-Désiré Kabila.

Masolo yango makotala mpe lisusu botongi ya Ouganda elingi esala kati na RDC, wuto Bunagana-Goma mpe Beni-Kasindi ya ba kilometres 100 na ntina ya kopsea nzela na mombongo kati na mboka mibale.

Masolo mango makotala mpe lisusu mokano ya bakonzi babale baye ya kokotisa kimya na etuka ya Afrika na kati.

Bakutana mbala mingi na makita ya bakonzi etuka ya Grands lacs to ya Afrika ya kati, kasi nanu basala ya bango mibale te uto M. Tshisekedi azwa bokonzi.

Félix Tshisekedi nde asalaki makasi mpo Yoweri Museveni na mokokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, batiya manzaka na mokanda ya kozongisa bondeko mpe koyokana, le 21 août 2019, na Luanda na Angola.

XS
SM
MD
LG