Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FARDC elobi mampinga ya bikolo nzinganzinga makoya te kobengana banguna mabele ya Congo


Molebeli ya FARDC (Forces armées de la RDC), général Léon Richard Kasonga na Goma, Nord-Kivu, 25 octobre 2019. (VOA Lingala)
Molebeli ya FARDC (Forces armées de la RDC), général Léon Richard Kasonga na Goma, Nord-Kivu, 25 octobre 2019. (VOA Lingala)

Molebeli ya FARDC (Forces armées de la RDC), général Léon Richard Kasonga, alobi ete mampinga ya bikolo misusu makokota te na mabele ya Congo démocratique mpo na kobengana banguna na misala ya bosangisi makasi mindamami na bakonzi ya bikolo ya sous-région.

Ndimbola na ye epesami samedi na Goma, na Nord-Kivu, epayi wapi bakonzi ya mampinga ya RDC, Rwanda, Ouganda, Burundi, Tanzanie, USA mpe Monusco basilisi mabongisi ya kobanda misala ya kobengana elongo basimba minduki na monyele ya RDC.

Bokutani boye bomemi nungunungu mingi kati na bana ya RDC.

Mpo na Gén. Kasonga, bosaningisami ya makasi botali kaka mangomba ya basimba minduki ya bikolo ya bapaya.

"Mampinga moko moko makotikala na mboka na yango, mpe mampinga ya RDC makokamba misala na mabele na yango na ntina ete soki monguna songolo abenganami na mabele na biso mpe alingi akatisa ndelo mpo akima na mboka na ye to na mboka mosusu (azali monguna ya bato banso koleka ndelo ya mboka) akobenganama mbala moko na mampinga ya FARDC mpe na mampinga ya mboka songolo to pakala," elimboli Gén. Kasonga.

"Mampinga ya bapaya makoya na Congo te," elobi Gén. Kasonga

"Esengeli boyeba ete mampinga ya RDC masalaka mikolo minso uta kala, na makasi na biso moko mpe na bonsomi bonso, misala ya kobengana ba basimba minduki na mabele ya Congo, na makoki ya bana ya Congo bapesaka biso. Tokokoba kosala yango. Mbano ezali: ata lingomba moko te ya basimba minduki na Congo mpe kimya bisika binso," ebeti sete Gén. Kasonga.

Molobeli ya ba FARDC apesi ndakisa ete ba FARDC bazali kobenga, bango moko, basimba minduki na Mayangos, na Beni, na Rutshuru mpe Nyamilima, na Nord-Kivu. Misala misusu ya kobenga mpe kosukola mangomba yango mizali kosalama na Sud-Kivu, elobi Gén. Kasonga. "Tokokoba kosala yango", elimboli molobeli ya ba mampinga ya Congo.

Lokola Gén. Kasonga, mokambi ya Nord-Kivu, Carly Nzanzu Kasivita mpe alimboli lolenge moko.

Mpo na ye, misala miye mibandi, ya bosangisi makasi ya mapinga ya bikolo ya sous-région, mikokani te na ba opérations conjointes esalamaka mibu mileki mpe misilisaki te bitumba.

M. Nzanzu alobi lisusu ete Monusco mpe Africom (USA) bazala wana kaka mpo na kotala.

XS
SM
MD
LG