Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba ADF basali mayele ya koyinisa ba FARDC na bavandi ya Beni (FARDC)


Libota moko lizali kolela bayike na bango bawe na bitumba ya ba ADF na Oicha, Beni, Nord-Kivu, 15 novembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Libota moko lizali kolela bayike na bango bawe na bitumba ya ba ADF na Oicha, Beni, Nord-Kivu, 15 novembre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Mampinga ya ekolo Congo démocratique, FARDC, balobi bobomi ya bavandi ya Beni mikolo oyo na ba ADF ezali mayele ya batomboki baye mpo na koyinisa basoda ya RDC na bana mboka.

"Ezali mayele ya kala ya monguna, mayele maye mayebani kala. Ntango inso bazalaka na nkwokoso ekasi, bamekaka bozongisela nkanda likolo ya bana mboka mpo na kopakola biso mabe mpe kolongola mitema ya population na biso," ekomi molobeli ya misala ya Sukol1 ya ba FARDC na esika ebangami "Grand-Nord", major Mak Hazukay na compte Twitter ya Forces armées de la RDCongo.

Ba FRADC balobi ata makambo mazali lolenge yango, bakonzonga nsima te na misala ya kobengana batomboki mpe basimba mandoki na monyele ya RDC.

"Balingi balongola mampinga na nzela mpe bakanisi ete bakolembisa biso. Tozali kosala manso mpo na kobatela bingumba mpe kati na mboka," ebakisi major Hazukay.

Na mikolo zomi, bato pene na tuku mitano (50) babomami na ba ADF ntango ba FARDC bazali kosala misala ya kobengana batomboki baye.

XS
SM
MD
LG