Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mangwele ya mibale ya Ebola makopesama na octobre na RDC


Mosali ya bokolongono azali kobongisa mangwele ya Ebola na Mbandaka, RDC, 21 mai 2018.
Mosali ya bokolongono azali kobongisa mangwele ya Ebola na Mbandaka, RDC, 21 mai 2018.

Ekolo Congo démocratique ekombanda kopesa mangwele ya mibale ya Ebola na kati-kati ya sanza ya zomi, eyebisi OMS, Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono.

Bobesi ya mangwela moye bozali mingi mpo na bobangi ete mangwele ya liboso mazalo moke mpe makoka ten a motango ya bato, elimboli na VOA Lingala Dr. Philippe Kyunyu ya bitumba na Ebola na Beni.

Kolanda OMS, mangwele ya mibale maye maselemi na compagnie Johnson Johsno ya Etats-Unis makopesama mingi na bisika Ebola ebomi bato mingi te lokola na Sud-Kivu, na Itrui mpe bisika misusu.

Tonkundola ete Ebola esili ebomi bato koleka bato nkoto mibale na nkama moko na mobu moko ezali kongaola na monyele ya RDC.

Nzokande ministre ya kala ya bokolongono Dr Oly Ilunga akebisaki mpo na mangwela yango. Kasi Dr. Oly Ilunga afukandami mpe atiyami na bokengi na ndako na ye nsima mpo na koepngwisa misolo mizalaki mpo na Ebola.

XS
SM
MD
LG