Bakambi ya Lamuka balobi o’mokolo ya mposo na Bruxelles (Belgique), ete batikali lisanga mpe bakomibongisa mpo na kobongola lisanga na bango na plateforme (lingomba ya monene) ya politiki.
Mokambi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante), Corneille Nangaa, atelemeli bofundi ya Amerika mpo etali kaniaka.
Président Félix Tshisekedi akutanaki o’mokolo ya mitano na mokokani waye ya mboka Uganda, Yoweri Museveni, na Kampala, engumba mokonzi ya ekolo liye.
Maponami ya ba gouverneurs makosalama o’mokolo ya le 10 avril, eyebisi CENI, Commission électorale nationale indépendante.
Département ya Trésor ya Etats-Unis ekangi biloko to bozuwi ya président ya CENI, Corneille Nangaa, vice-président na ye, Norbert Basengezi, mpe na Conseiller Marceliin Mukoko Basengezi, mpo na kaniaka mpe kobebisa misala ya maponami na RDC.
Eugène Diomi Ndongala abimi lelo na boloko ya Makala na Kinshasa nsima na mibu mitano na bokangami.
Bayike na bayi politiki mpe ya misala ya administration bazalaki nsima ya bobomani ya Yumbi, endimi lelo mpo na mbala ya yambo ministre ya mambi ya makoki ya bomoto ya RDC, Marie-Ange Mushobekwa.
Président Félix Tshisekedi abongoli bakonzi ya ANR (Agence nationale de renseignements).
Premier ministre Bruno Tshibala a suspendre ministre des Affaires foncières kolanda mitindo ya président Félix Tshisekedi.
Alanga nzembo Koffi Olomide azuwi etumbu ya mibu mibale ya boloko lelo nsima ya bosambisami na ribunal correctionnel ya Nanterre, na ekolo France.
FCC ezuwi lisusu mabonga koleka na maponami ya ba Sénateurs. Basali ya bamagzini ya bato ya mboka bapaya bazongeli mosala. Faure Gnassigngbé ya Togo na Kinshasa. Bato ya Beni bapesi makanisi mpo na bozikisi ya ba centre de traitement ya Ebola. Mosala ya kosilisa mobulu na Minembwe.
Ba Sénateurs baponami lelo na ba Assemblées provinciales ya RDC. Front commun pour le Congo (FCC) ezuwi motango ya mabonga mingi koleka, likolo ya 90 ya 107 Sénateurs bakovanda na suku ya likolo ya Parlement. Thierry Kabundi, correponsant ya VOA Lingala na Kinshasa, alandakii maponami maye ya ba Sén
Président Felix Tshsiekedi akomi lelo na Luanda na Angola epayi wapi asali mobembo mwa ye ya yambo lokolo Tata mokonzi ya ekolo RDC, nsima ya maponami ya le 30 décembre 2018 oyo asakolamaki molongi.
Mobulu mozalaki na ntongo ya mardi na quartier Keshero, na ouest ya Goma (Nord-Kivu), nsima ya liwa ya elenge mwasi moko na masasi ya policier.
Misala mingamaki lelo na Uvira, na Sud-Kivu. Bavandi ya Uvira bazali kotelemela bozangi bokengi.
Beni, Butembo na Yumbi ekozala na maponami ya ba députés nationaux mpe locaux le 31 mars, kolanda mokano ya plénière CENI.
AS VitaCclub esali match nul na JSS 2-2 na stade des martyrs ya Kinshasa na match ya Ligue africaine des champions.
Liboso ya ba milliers ya balandi na ye na place Ste Therese, na Kinshasa, Martin Fayulu alobi akokitisa maboko te kasi akokoba bitumba mpo na bosolo ya maponami. Alobi akokende na Union africaine mpe na Nations unies na Genève.
TP Mazembe abeti CA Africain mangenda 8 contre 0 na match ya Ligue africaine des champions.
Pene na 300 miliciens baye babengami "Mtetezi" (bakoteli, na Swahili) na mokonzi na bango Ebuela wa Seba batiki minduki mpe bamipesi na maboko ya bakonzi, na Fizi, na Sud-Kivu.
Voir plus