Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CENI etie le 31 mars maponami na Beni, Butembo mpe Yumbi


Corneille Nangaa, président ya CENI (Commission nationale électorale indépendante), na Kinshasa, Congo, le 2 janvier 2019.
Corneille Nangaa, président ya CENI (Commission nationale électorale indépendante), na Kinshasa, Congo, le 2 janvier 2019.

Beni, Butembo na Yumbi ekozala na maponami ya ba députés nationaux mpe locaux le 31 mars, kolanda mokano ya plénière CENI.

"CENI atie date, le 31 mars 2019 mpo na maponami na Beni, Beni-ville, Butembo mpe Yumbi. Asali mosala na yango ya kobisa manaka. Ba oyo basengeli kobatela kimya mpe kotala makambo ya bokolongono ya nzoto, bakosala mpe mosala na bango," eyebisi VOA Lingala chargé ya Communication ya CENI, Jean-Baptiste Itipo.

Mposo eleki, CENI epusaki maponami ya ba Sénateurs le 14 mars, ya ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs le 26 mars mpe elobaki ekotinda ba experts na Beni, Butembo mpe Yumbi mpo na kotala soki ba conditions ekoki.

Maponami esalemaki te le 30 décembre na Yumbi, Beni mpe Butembo mpo bozangi bokengi mpe bokono ya Ebola.

Bisika baye bakosala maponami ya présidentielle te. Félix Tshisekedi asakolamaki molongi ya présidentielle ya le 30 décembre, mpe alapaki ndayi le 24 janvier. Kasi Martin Fayulu, moko na ba candidats mpo na présidentielle aboyi mokano ya Cour constitutionnelle mpe amisakoli "président légitime", alobi alongaki na 61%.

Cenco, ba episkopo ya catholique, bango bakobi na koloba ete ba résultats ya CENI ekokani te makono ya bana ya Congo.

XS
SM
MD
LG