Na misa miselemaki vendredi na cathédrale notre Dame du Congo ya Lingwala na Kinshasa mpo na mibu mibale ya liwa ya Etienne Tshisekedi, Mgr Gérard Mulumba, atalisi mowei lokala "Moïse" mpe mwana ya nkondo, Félix Tshisekedi, lokola "Josué".
Ambassadeur ya Etats-Unis alobi ete bakonzi ya Amérika balingi kosala partenariat ya makasi koleka na gouvernement ya RDC. Ezalaki na milulu na esika ambassade ya sika ya mboka na ye ekotongama na Kinshasa.
Gouverneur ya engumba Kinshasa, André Kimbuta, apesi nzela na meetingi ya Martin Fayulu mpe lingomba Lamuka oyo ekosalema o’mokolo ya le 2 février na place Ste-Thérèse na Kinshasa.
Bakonzi ya ekolo RDC basengaki na Monusco kokangela nzela na batomboki ya FDLR ya Rwanda baye bazali kolongwa na Nord-Kivu kokende na Sud-Kivu elongo na mabota bango na bibundeli too minduki.
Ba experts ya Conseil ya sécurité ya Nations unies bazali kotala soki mikano too ba résolutions ya ONU ekomi wapina RDC.
Claudine Munari, présidente ya Fédération ya opposition ya Congo-Brazzaville asengi na bakonzi ya mboka babimisa ba prisonniers politiques nyono na ebendali ya mobu ya sika liye 2019.
Comité laïc de coordination (CLC) ebimi na clandestinité to babobatami nsima ya sanza zomi na misato.
Président Emmanuel Macron ya mboka France atindi mokanda na mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi, mpe apesi losako na "transition pacifique wa yambo" na RDC.
Céni (Commission électorale nationale indépendante) ya RDC epusi maponami ya ba Sénateurs, ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs.
Bakonzi misato ya babundi ya Kamwuina Nsapu bamispesi na maboko ya bakonzi na Kasaï.
Gouvernement ya RDC elobi ete ezongisi na Rwanda bakonzi mibale ya mibale ya FDLR (batomboki ya Forces démocratiques pour la libération du Rwanda).
Ba étudiants basalaki lisusu mobulu o’mokolo mwa yambo ya mposo mpo babobomaki baninga na bango dimanche na manifestation basalaki mpo na koboya bomatisi ya motuya ya keleasi.
Etudiante moko na policiers moko bakufi na mobulu na université ya Lubumbashi (Unilu), eyebisi police.
Ndaye Mulamba, "djogo" ya lisano ya ndembo, mosani monene ya Leopards, equipe nationale ya RDC akufi na Afrique du Sud, elobi ministre ya Sports Papy Niango Iziamay.
Koleka 50 fosses communes (mabulu ya nkunda na nzoto ya bato ebele esika moko) emonani na mboka ya Yumbi, na Maï-Ndombe, elobi ONU.
Félix Tshisekedi azuwi bokonzi na nsima ya kolapa ndayi liboso ya Cour constitutionnelle na Palais de la nation o’mokolo ya mitano na Kinshasa.
Mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi asalaki malaise ntango azalaki kosala discours na ye yambo na simba ya kolapa seleka.
Mokambi ya ekolo ya Congo-Brazzaville apesi losako na mokonzi ya sika ya République démocratique ya Congo.
Na lisikulu na ye suka, président Joseph Kabila alobi ete alingi lisanga na Félix Tshisekedi mpo na kotelemela baye balukaka kozwa bozwi ya Congo.
Babundi ya LUCHA, Lutte pour le changement balobi bakokota te na gouvernement.
Voir plus