Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bayi politiki bazalaki na nsima ya bobomani ya Yumbi, elobi Mme Mushobekwa


Soda moko pene na bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.
Soda moko pene na bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.

Bayike na bayi politiki mpe ya misala ya administration bazalaki nsima ya bobomani ya Yumbi, endimi lelo mpo na mbala ya yambo ministre ya mambi ya makoki ya bomoto ya RDC, Marie-Ange Mushobekwa.

Ministre ya makoki ya bomoto alobi yango o’boso ya Conseil ya makoki ya bomoto ya Lisanga ya bikolo ya molongo, Nations unies, na nzela Web TV.

Koleka ba civils 535 nde bawaki na bobomani liye lisalamaki kati na le 16 mpe le 17 décembre 2018 na bitumba kati na Banunu na Batende na Maï-Ndombe.

Bawei mingi bazalaki Banunu baye babengamaki na Batende nsima ya bokundami ya nkumu ya Mununu.

Président Félix Tshisekedi atindaki misala ya boluki luki na esika liye nsima ya bozuwi bokonzi bwa ye.

Ministre Mushobekwa alobi ete baye basalaki mambi maye bakosambisama mpo kimya ekoki kozala te soki bosembo ezali te.

Maponami masalamaki te na Yumbi mpo na bobomani liye.

XS
SM
MD
LG