Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakambi ya Lamuka balobi batikali lisanga mpe bakokoma plateforme ya politiki


(Banda loboko ya la mwasi) Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Alan Doss ya Fondation Kofi Annan, Martin Fayulu, Félix Tshisekedi, Moïse Katumbi mpe Vital Kamerhe na bokutani ya Genève, Suisse, 11 novembre 2018.
(Banda loboko ya la mwasi) Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Alan Doss ya Fondation Kofi Annan, Martin Fayulu, Félix Tshisekedi, Moïse Katumbi mpe Vital Kamerhe na bokutani ya Genève, Suisse, 11 novembre 2018.

Bakambi ya Lamuka balobi o’mokolo ya mposo na Bruxelles (Belgique), ete batikali lisanga mpe bakomibongisa mpo na kobongola lisanga na bango na plateforme (lingomba ya monene) ya politiki.

Moïse Katumbi, Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Freddy Matungulu, ntoma ya Mbusa Nyamuisi mpe Martin Fayulu, candidat ya lingomba liye ntango ya maponami, batiyaki manzaka na mokanda basalaki nsima ya bokutani na bango.

Lamuka ekokoma plateforme ya politiki. Ezali kaka likambo ya ntango moke. Kala te tokokuta lisusu mpo na kosolola makambo nyonso ya organisation (mabongisi). Kati na yango fonctionnement (lolenge ya kosala), elimboli Jean-Pierre na motuna ya bapanzi sango.

Bato oyo bozomona na Lamuka bazali baye, ntango batiye manzaka na bango balongola yango te, ebakisi M. Bemba.

Nzokande na mokanda batiye manzaka, bakambi ya Lamuka balobi, bakokoba elongo bitumba mpo na bizaleli ya democratie na oyo etali maponami na ntina ya komema mbongwana liye bana ya mboka bazali kozela.

Na ngambo na ye, Moïse Katumbi alobi ete Felix Tshisekedi azali ndeko.

Na tambolaki na ye ti na Genève. Mpe na Genève, toponaki Martin Fayulu mpo azala candidat na biso na ntina ya kolonga (Joseph) Kabila, mpe tolongaki ya. Kasi likambo ezali ya koyeba mabe ezali nini na mboka na biso. Mpo na nini mboka ezali kokende liboso te? Mpo na nini moyibi esalamaki (na maponami) ? Mabe nde Kabila, elobaki M. Katumbi.

XS
SM
MD
LG