Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akutani na Museveni na Kampala


(G ti D) Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya mboka Uganda, Yoweri Museveni, na bokutani na Kampala, Uganda, le 23 mars 2019. (Facebook/La Présidence de la RDC)
(G ti D) Président Félix Tshisekedi na mokokani waye ya mboka Uganda, Yoweri Museveni, na bokutani na Kampala, Uganda, le 23 mars 2019. (Facebook/La Présidence de la RDC)

Président Félix Tshisekedi akutanaki o’mokolo ya mitano na mokokani waye ya mboka Uganda, Yoweri Museveni, na Kampala, engumba mokonzi ya ekolo liye.

M. Tshisekedi akomaki na Uganda o’mokolo ya mitano mpo na na mobengo ya mikolo mibale.

Azali kuna elongo na molongani na ye Denise Nyakeru.

Yambo ya campagne ya mapinami na RDC, mokonzi ya Uganda apesaki maboko na M. Tshisekedi mpo kokende liboso.

Uganda ezali bongo mboka ya mitano epayi wapi M. Tshisekedi asali mobembo banda akotaki na bokonzi o’mokolo ya le 24 janvier 2019.

XS
SM
MD
LG