Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Etumbu mosusu ya Washington likolo ya Nangaa, Basengezi na Mukolo


Corneille Nangaa, mokambi ya Commision électorale nationale indépendante (CENI), na Kinshasa, RDC, 2janvier 2019.
Corneille Nangaa, mokambi ya Commision électorale nationale indépendante (CENI), na Kinshasa, RDC, 2janvier 2019.

Département ya Trésor ya Etats-Unis ekangi biloko to bozuwi ya président ya CENI, Corneille Nangaa, vice-président na ye, Norbert Basengezi, mpe na Conseiller Marceliin Mukoko Basengezi, mpo na kaniaka mpe kobebisa misala ya maponami na RDC.

Mpe lisusu, epekisameli bana mboka ya Amerika kosala mombongo (transactions) na bato baye misato.

Sigal Mandelker, sous-secrétaire au Trésor, chargé na terrorisme mpe renseignement financier alobi etumbu liye epesami likolo ya kaniaka ezali kosalema kati na CENI mpe na gouvernement ya kala ya Kabila.

Kaniaka liye azalaki mpo na kopekisa mpe kozongisa nsima maponami ya kondimama mpe ya bato nyonso.

Mokanda ya Trésor ya Amerika etangi koyibama ya mosolo mpe kovimbimisa ya montango ya misolo ntango ya misala ya maponami kobanda 2016.

Trésor ya Amerika elakisi ete mikonzi ya CENI bavimbisaki na koleka 100 millions ya ba dollars mosolo esengelaki mpo na ba machines ya ko pona (voter) na ntina ya kotiya misolo ebele na libenga na bango moko mpe kopesa misusu na campagne ya Joseph Kabila.

Etumbu ya Amerika epesameli ntango bofundami ya kaniaka ezali kongala na RDC.

Lundi moleki, président Félix Tshisekedi atelemisaki botiyami ya ba Sénateurs mpo likambo ya kaniaka mpe azongisaki maponami ya ba Gouverneurs na mokolo eyabani te.

Washington elobi ezali nsima ya bana ya Congo mpo na kobundisa kaniaka. Sanza moleki, Etats-Unis epesaki etumbu mosusu na bato baye misato elongo na mokambi ya Cour constitutionnelle, Flory Kabange. Bakoki lisusu te kotiya makolo na Amerika.

XS
SM
MD
LG