Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Maponami ya ba gouverneurs matiyami le 10 avril


Corneille Nangaa, président ya Commission électorale nationale indépendante (Céni), Kinshasa, 12 décembre 2018. (Céni RDC)
Corneille Nangaa, président ya Commission électorale nationale indépendante (Céni), Kinshasa, 12 décembre 2018. (Céni RDC)

Maponami ya ba gouverneurs makosalama o’mokolo ya le 10 avril, eyebisi CENI, Commission électorale nationale indépendante.

Maponami maye matindikamaki o’mokolo moyebani te na mokano ya président Félix Tshisekedi, lundi, ntango atelemisaki botiyami ba Sénateurs kolanda bofundami mpo ya kaniaka.

Misala ya bosembo ezali kosala bolukiluki likolo ya kaniakaka liye lifundmakai mpo na maponami maye ya ba Sénateurs.

"Bolukiluki liye likopekisa te tosala maponami, likoki te kotelemisa misala nyonso ya maponami," elobi na VOA Lingala molobeli ya CENI, Jean-Baptiste Itipo.

Ba députés provinciaux, bango lisusu nde baponi ba gouverneurs na ba vice-gouverneurs, lokola ezalaki mpo na ba Sénateurs.

XS
SM
MD
LG