Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

"Journée ville morte" na Uvira, na Sud-Kivu


Circulation na nzela monene ya Uvira, Sud-Kivu, 27 septembre 2017. (VOA/Ernest Muhero).
Circulation na nzela monene ya Uvira, Sud-Kivu, 27 septembre 2017. (VOA/Ernest Muhero).

Misala mingamaki lelo na Uvira, na Sud-Kivu. Bavandi ya Uvira bazali kotelemela bozangi bokengi.

Bavandi ya Uvira balandi mbela ya Nouvelle Société civile du Congo (NSCC) oyo eyebisi ete bato ebele basili kokufa na ba attaques ya baye basimba minduki na mposo eleki.

Coordonnateur ya NSCC na Uvira, Willy Seremba alobi ete bosengi na bango ezali ete bakonzi basala nyonso mpo na konzongisa bokengi.

Mokambi ya territoire ya Uvira ye akanisi ete bato balandi mbela ya societe civile te. Mpo na ye 85% ya bato bakendaki na mosla. Nzokande biteyelo bifungwami te mpe bawenze esali te.

XS
SM
MD
LG