Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Diomi Ngongala abimi na boloko


Eugène Diomi Ndongala, nsima ya bobimisami wa ye na boloko ya Makala, na Kinshasa, RDC, le 21 mars 2019. (Facebook/Ludovic Diomi)
Eugène Diomi Ndongala, nsima ya bobimisami wa ye na boloko ya Makala, na Kinshasa, RDC, le 21 mars 2019. (Facebook/Ludovic Diomi)

Eugène Diomi Ndongala abimi lelo na boloko ya Makala na Kinshasa nsima na mibu mitano na bokangami.

Mokambi ya lingomba Démocratie chrétienne abimisami na kolonda miko ya ngolu ya président Félix Tshisekedi. Kasi bobimisami na ye esalamaki na ba miko ya bandelo nzike mpo Diomi Ndongala bamokatelaki mibu zomi ya boloko nsima ya bonfundami mpo na kozwaka bilenge basi ya mike na makasi.

Mwana mboka Diomi akoki te komimonisa na ba postes frontaliers lokola libanda ya mpepo, beach mpe kavanda na nse bataka ya 500 mètres na eteyelo ya bilenge basi.

Na baye nyonso basalaki makita mpo na kokweyisa ngai, mpe bazali kokoba koyina mpe kofinga ngai, na libimbi bango mpe na sengi na Nzambe alimbisa bango mpo baye te nini bazali kosala, eyebisi mwna mboka Diomi nsima ya kobima na ye.

Alobi akolemba te mpe akokoba bitumba w aye ya polikiti.

XS
SM
MD
LG