Emmanuel Ramazi Shadary, secrétaire permanent ya PPRD, asengi balandi ya lisanga na ye kobanga eloko te mpo bango nde basimbi mboka. Asali lisikulu liboso ya balandi ya PPRD na Likasi, na Haut-Katanga epayi wapi akomaki samedi.
Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba "Ensemble pour le changement" mpe moko na baye ya Lamuka, asakoli ete azwi epakolami ya bana ya Goma (Nord-Kivu) mpo na kokela parti (lisanga ya politiki). Asali lisikulu liboso ya bituluku ya bato, na stade Afya, na Goma.
Denis Sassou N’Guesso alobi na lisikulu na ye na bokutani Russie-Afrique, na Sotchi, ete alingi atonga, na lisungi ya Russie, oléoduc ya 1.000 kms mpo na komema pétrole na gaz na ntina ya kosunga continent ya Afrika. Ayebisi ete zones économiques speciales minei ekokelama mpo na yango. Totala.
Opposant général Jean-Marie Michel Mokoko azwi ndingisa ya kobima na boloko na ntina ya koketende na matanga ya mama wa ye. Azali na etumbu ya mibu 20 na boloko. Sango yango epesamaki na molobeli ya mbulamatari ya Congo-Brazzaville.
Ba Casques bleus, basoda ya Monusco, bazali mpifo te ya kopesa maboko na mampinga ya bikolo nzinganzinga maye mazali komilengele mpo kosukisa mangomba ya batomboki na basimba minduki na monyele ya RDC, elobi, mokambi ya Monusco, Leila Zerrougui.
Président Félix Tshisekedi azali na Belgrade, na Serbie, uto ntongo ya vendredi na kowuta na ye Sotchi na sommet Russie-Afrique
Député national Jean-Jacques Mamba du MLC ayanoli na mituna ya VOA Lingala mpo etali boponami ya molobeli ya opposition, lobi ya MLC mpe bitumba na Hauts-Plateaux ya Sud-Kivu.
Lambert Mende, molebeli ya kala ya mbulamatari, alobeli maponami malekaki na etuka ya Sankuru, likambo ya dimant libungaki, boyokani FCC-CACH, kaniaka mpe bitumba na Hauts Plateaux (S.Kivu) ayanoli na mituna ya VOA Lingala na Washington.
Jean Ruhosha, moko na babanyamulenge alimboli na VOA Lingala ntina nini bandeko baye balongwe na mabongisi ya masolo mpo na kosilisa bitumba na Hauts-Plateaux, na Sud-Kivu. Alekaki na plateaux ya VOA Lingala na Washington.
Motambwisi ya Front commun pour le Congo (FCC), Néhémie Mwilanya alobi na bapanzi sango na Lubumbashi ete eloko moko te na buku likonzi ekopekisa bozongi ya Joseph Kabila, mokonzi ya kala.
PPRD, parti ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC, esakoli ete ekozala lisanga ya ndakisa ya koboya makombo ya mabe (anti-valeurs) mpe ya kotelemela kaniaka, na suka ya bokutani ya mikolo misato na Lubumbahsi, na Haut-Katanga.
Bato bayike bakufi na bitumba batomboki ya lingomba RED-Tabara baye bakatisaki ndelo ya RDC, basali mardi na baye ya bokengi ya Burundi na etuka ya Bubanza (Burundi).
Baye banso bazokaki o’mokolo ya eyenga na likama ya Lufu, na etuka ya Kongo central, bamemami na Kinshasa, eyebisi ministre ya bosalisani mpe bondeko, Steve Mbikayi.
Moto ya misato kati na bafundami na liwa ya ba experts ya ONU na bitumba ya Ba Kamwina Nsapu na 2017, akufi na bokangami.
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC, akozongela misala ya politque kala mingi te, eyebisi na bofungolami ya matinée politique ya PPRD na Lubumbashi, na Haut-Katanga, Secrétaire permanent ya lingomba liye, Emmanuel Ramzany Shadari.
Koleka bato 30 bakufi na likama ya motuka na bokutani ya Nkamba na route nationale N0 1 na etuka ya Kongo central, eyebisi bakonzi ya ekolo Congo democratique. Président Félix Tshisekedi aboyi kokende na Japon, na botiyami na bokonzi, nsima na liwa ya bato baye.
Président Félix Tshisekedi asengi bana ya Kinshasa mpe ya RDC mobimba kobongola bizaleli na bango na kotiya bopeto na ekolo mpe engumba ya Kinshasa. Afungoli o’mokolo ya mposo campagne Kinshasa Bopeto. Tolanda bilili ya Rachel Kitsita Dongo.
Bato batamboli bisika biike na ekolo Congo démocratique mpo kotelemela kaniaka, lokola CLC (Comité laïc catholique) esengaki na mbela na yango. Na Kinshasa botambolami bosalami mpo bopusanaki mpo na mokolo ya lundi.
Bondongwani bopeli kati na lingomba Lamuka mpo na libonga ya molobeli ya opposition. Baye ya MS-G7 (ngambo ya Moïse Katumbi) na baye MLC (ya Jean-Pierre Bemba) lokola mpe baye ya DVU (ya Martin Fayulu) bazali kobendana makasi.
Mouvement citoyen Lucha (Lutte pour le changement) epesi palata to mbano ya 2019 na nkombo ya Luc Nkulula na ba nganga Nzambe ya katoliko ya doyenné ya Kinshasa mpo na oyo etali mpiko ma bango.
Voir plus