Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato ebele bakufi na bitumba ya batomboki bawuti RDC na Burundi


Milulu ya oposition liboso ya mampinga na district ya Mutarakura na Bujumbura, Burundi, 27 mai 2015.
Milulu ya oposition liboso ya mampinga na district ya Mutarakura na Bujumbura, Burundi, 27 mai 2015.

Bato bayike bakufi na bitumba batomboki ya lingomba RED-Tabara baye bakatisaki ndelo ya RDC, basali mardi na baye ya bokengi ya Burundi na etuka ya Bubanza (Burundi).

Misala ya bokengi ya Burundi milobi batomboki 14 bakufi kasi RED-Tabara esakoli ete ebomi pene na zomi na baye ya bokengi.

"Bopanzani… ya lingomba ya bato mabe bawutaki na RDC na ntongo: bato mabe 14 bakufi mpe minduki 11 bibotolami na maboko na bango," ekomi na compte Twitter ministère ya Burundi ya bokengi.

"Na botali, lingomba yango ekanisaki kobandela lisusu bosasi bosalamaki na Ruhagarika le 11/5/2018," ebakisi ministère ya sécurité.

"Lokola toyaki na mbalakaka, pene na ba policiers zomi bakufaki mpe na ngambo na biso, moto moko akufi," elobi na AFP moko na baye ya RED-Tabara, na kobomba nkombo na ye.

Moko na bakonzi ya bisika yango alobi mpe na kobomba nokmbo lokola, ete batomboki bamemaki ba civls pene na 20 kasi batikaki bango mwa ntango nsima na bokoti ya zamba ya Kibra eye ekenda kino Rwanda.

Burundi ekota mobulu uto Pierre Nkurunziza asakolaki ete akosala mandat ya misato na avril 2015 kasi Mobeko likonzi moboyaki yango. Président Nkurunziza alongaki maponami na mobu yango mpe mapomami misusu makosalama na 2020.

XS
SM
MD
LG