Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PPRD ezwui mokano ya kozala ndakisa na koboya kaniaka


Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)
Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)

PPRD, parti ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC, esakoli ete ekozala lisanga ya ndakisa ya koboya makombo ya mabe (anti-valeurs) mpe ya kotelemela kaniaka, na suka ya bokutani ya mikolo misato na Lubumbahsi, na Haut-Katanga.

Emmanuel Ramazani Shadary, alimboli yango na lisikulu na ye.

"Moto nyonso akofundama na kopengwisa ata million moko ya ba Francs congolais, ezali moyibi. Mpe kaka mokolo lisanga likoyeba yango, akolongwa mpe akopesama etumbu kolanda mikano ya bokutani boye mpe mpo na kotosa people," elobi M. Ramazani o’boso ya bituluku ya baye ya lingomba na ye biwutaki bisika na bisika na RDC.

Mpo na ye, PPRD "etikali kaka te macinhe ya maponami kasi ezali mpe lisusu esika ya masolo mpe ya bosangani na kopesa alima na baye banso bazali na kati na yango".

"Nasengi bakambi banso ya PPRD: ministres, bakambi ya ba entreprises, gouverneurs, directeurs des cabinets, conseillers, baboya makambo manso ya mabe (anti-valeurs) ; mingi mpenza kopengwisa misolo ya ekolo eye ebandi kokoma na RDC lokola makambo ya malamu," abkisi M. Ramazani.

Alobi PPRD ezali lisanga ya lokumu kasi soki batumoli yango ezongisa.

Secrétaire permanent ya lisanga liye asokoli bozongi ya Joseph Kabila akozongela misala ya poltiki kala te. Alobi PPRD ezali kolengela mpo na kolonga maponami ya mokambi ya ekolo na 2023 mpe mabonga manso masusu.

XS
SM
MD
LG