Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lucha epesi mbano na ba sango mpo mpiko na bango


Moko ya baye lingomba Lucha azali koloba na milulu ya bopesi mbano na basango na Goma, Nord-Kivu, 18 octobre 2019. (Twitter/Twitter/Baraka Munyampfura H)
Moko ya baye lingomba Lucha azali koloba na milulu ya bopesi mbano na basango na Goma, Nord-Kivu, 18 octobre 2019. (Twitter/Twitter/Baraka Munyampfura H)

Mouvement citoyen Lucha (Lutte pour le changement) epesi palata to mbano ya 2019 na nkombo ya Luc Nkulula na ba nganga Nzambe ya katoliko ya doyenné ya Kinshasa mpo na oyo etali mpiko ma bango.

Mbano yango epesameli bango lokola bazalaki na molongo mwa yambo na milulu misalamaki kati na 2017 na 2018 mpo na kosenga botosi ya Mobeko likonzi mpe bosali ya maponami na bonsomi mpe bosembo.

Ezali mpe mpo na botamboli bonso bosalamaki le 31 décembre 2017, le 21 janvier 2018 mpe le 28 février 2018.

Mbano yango epesami na bokanisi Luc Nkulula moko ya babundi ya Lucha oyo akufaki kati na moto na ndako na ye le 11 juin 2018.

Mpo na baye ya LUCHA mpe mangomba misusu ya bitumba mpo na botosi ya ekolo ezali misala ya bokengi nde mibomaki Luc Nkulula.

XS
SM
MD
LG