Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lamuka ezali kodongwana mpo na libonga ya molobeli ya opposition


Banda G. ti D. : Martin Fayulu, Antipas Mbusa, Adolphe Mozito, Jean-Pierre Bemba na Moïse Katumbi, na bokutani ya lingomba Lamuka na Bruxelles, Belgiques, le 26 avril 2019. (Twitter/Lamuka International)
Banda G. ti D. : Martin Fayulu, Antipas Mbusa, Adolphe Mozito, Jean-Pierre Bemba na Moïse Katumbi, na bokutani ya lingomba Lamuka na Bruxelles, Belgiques, le 26 avril 2019. (Twitter/Lamuka International)

Bondongwani bopeli kati na lingomba Lamuka mpo na libonga ya molobeli ya opposition. Baye ya MS-G7 (ngambo ya Moïse Katumbi) na baye MLC (ya Jean-Pierre Bemba) lokola mpe baye ya DVU (ya Martin Fayulu) bazali kobendana makasi.

Baye ya MS-G7 balobi na liyebisi o’mokolo ya vendredi 18 octobre ete DVU (Dynamique pour la véritété des urnes) ezali kosala "moyibi".

Mpo na baye ya MS-G7, DVU ya Fayulu "ezali lisanga liyebani te na bakonzi mpe lizali te na mikanda ya misala ya bosembo".

Baye ya MS-G7 babakisi ete DVU ekoki te kowela libonga ya molobeli ya opposition.

"DVU elingaka te bozali ya opposition eye endimama na bakonzi ndenge bilembo ya maponami ya le 30 décembre 2018 biye bisakolamaki na CENI bikokanaki te na bosolo ya sanduku ya maponami. Yango eza malamu mpo na DVU. Kasi, esengeli (DVU) elanda nzela yango ti na suka mpe edima ete koponama ya molobeli ya opposition etali yango te," elobi na liyebisi mokambi ya groupe parlementaire MS-G7.

Liyebisi ya Ms-G7 lisami mokolo mibale nsima na liye ya DVU. MS-G7 ebengi "moyibi mpe bokosi ya politiki", maye DVU ezali kosala.

MS-G7 epameli lolenge DVU etika ba parlementaires na yango na Assemblée nationale mpe na assemblée provinciales ntango ezali koboya kondima bokonzi botiyama nsima ya maponami.

Na ngambo na yango, DVU epalelaki o’mkolo ya le 16 octobre masolo maye mazali kosalama na ba groupes parlementaires mpo kopona molebeli ya opposition. Liyebisi ya DVU libengaki yango boyokani mpo na kosala mabe mpe komiteka na kondimaka bokonzi ya Félix Tshisekedi.

DVU epamelaki ba opposants basusu mpo na "koluka kokunda libela mokano ya bana ya Congo moye mominsamaki na maponami ya le 30 décembre 2019, (mokano) moye mozali likonzi ya bitumba ya Dynamique mpo na bosolo ya maponami".

"Ndenge nini tokoki koloba ete tolongaki maponami mpe komitia na opposition (botelemeli ya bokonzi)," emitunaki na liyebisi lyango DVU.

DVU ezali na groupe parlementaire moko elongo na MLC. Kasi MLC ezali, na ngambo na yango, kosenga ete opposition mobimba eyokana mpo na kopona molebeli na yango.

XS
SM
MD
LG