Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

JMM Mokoko akobima boloko mpo na matanga ya mama wa ye


Le général Jean Marie Michel Mokoko, na boasambisami na ye. (VOA/Arsène Séverin)
Le général Jean Marie Michel Mokoko, na boasambisami na ye. (VOA/Arsène Séverin)

Opposant général Jean-Marie Michel Mokoko azwi ndingisa ya kobima na boloko na ntina ya koketende na matanga ya mama wa ye. Azali na etumbu ya mibu 20 na boloko. Sango yango epesamaki na molobeli ya mbulamatari ya Congo-Brazzaville.

Thierry Mongala, molobeli ya mbulamatari ya Congo-Brazzaville, asakolaki na Twitter na ye ete bakonzi ya ekolo bakoki te koboya bosengi ya basambeli ya général Mokoko.

"Liwa ya mama na général Mokoko : na botindami ya tata mokonzi ya ekolo, na boyokani na libota, mabongisami makozwama mpo na matanga esika wapi mwana wa ye akozala. Matumoli ya basembeli na France baye bazali koluka ndenge nini ya kosuana, mazali bamba," ekomi na tweet moko Thierry Moungala.

Kasi etikali ete mokolo yango ya bobimi mpo na mwa ntango ya gén. Mokoko mopesama.

Gén. Mokoko azalaki candidat ya maponami ya mokonzi ya mboka malekaki. Nsima na yango, azwaki etumbu ya mibu tuku mibale na boloko mpo na kozala likama na bokengi ya mboka mpe komimonisa na minduki.

XS
SM
MD
LG