Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moïse Katumbi alobi azwi epakolami ya Goma mpo na kosala parti na ye


Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba "Ensemble pour le changement" mpe moko na baye ya Lamuka, liboso ya bituluku na stade Afya, Goma, Nord-Kivu, 26 octobre 2019. (Twitter/Coalition Lamuka)
Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba "Ensemble pour le changement" mpe moko na baye ya Lamuka, liboso ya bituluku na stade Afya, Goma, Nord-Kivu, 26 octobre 2019. (Twitter/Coalition Lamuka)

Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba "Ensemble pour le changement" mpe moko na baye ya Lamuka, asakoli ete azwi epakolami ya bana ya Goma (Nord-Kivu) mpo na kokela parti (lisanga ya politiki). Asali lisikulu liboso ya bituluku ya bato, na stade Afya, na Goma.

M. Katumbi atunaki yambo na bituluku na bato soki balingi ete asala lisanga ya politiki. Abendeli lisusu na Goma mobembo na ye kati na mboka

Bituluku bayanolaki na kondima.

"Esengeli na tuna bino. Nalingi na banda parti poliki, banani balingi ?... (Bitiluku: 'tondimi')... Lokola nazui ndingisa, nakokela parti poliki. Parti na biso ekopesa nzela te na moyibi," elobi M. Katumbi.

M. Katumbi alongwaki na PPRD na 2014 ntango akebisaki mpo na "3e faux penalty" mpe aboyaki ete mokonzi ya mboka ya kala mpe nkolo ya parti wana, Joseph Kabila, abimisa elongi mpo na mbala ya misato na maponami ya president.

M. Katumbi azalaka lisusu na parti (lisanga) moko te, kasi kati mangomba minene lokola Ensemble mpe Lamuka.

Na lisikulu na ye na Goma, M. Katumbi alobi ete akotikala na opposition. Apameli kaniaka. Asengi l’Etat efuta balakisa lokola kelasi ezali ya ofele.

M. katumbi alobi mpe lisusu ete ntango ya campagne ekomi nanu te, kasi esengeli sik’oyo kosunga bana ya mboka kobima na mpasi.

XS
SM
MD
LG