Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gouvernement ememi baye bazokaki na likama ya Lufu na Clinique Ngaliema


Ministre ya bondeko mpe bosalisani, Steve Mbikayi, na katikati na basungi ba ye, liboso ya ba cliniques mobiles ememaki baye ya likama ya Luku, na Mbanza Ngungu, Kongo central, 22 octobre 2019. (Twitter/Steve Mbikayi)
Ministre ya bondeko mpe bosalisani, Steve Mbikayi, na katikati na basungi ba ye, liboso ya ba cliniques mobiles ememaki baye ya likama ya Luku, na Mbanza Ngungu, Kongo central, 22 octobre 2019. (Twitter/Steve Mbikayi)

Baye banso bazokaki o’mokolo ya eyenga na likama ya Lufu, na etuka ya Kongo central, bamemami na Kinshasa, eyebisi ministre ya bosalisani mpe bondeko, Steve Mbikayi.

"Premier ministre antindaki na Banza Ngungu. Namemaki lisungi na baye banso bazwaki mpasi na likama liye. Kutu na memaki bango banso na Kinshasa butu boleki na Kinshasa, natiki bango banso na clinique Ngaliema mpe mbulamatari nde ekofuta mosolo monso," eyebisi ministre Steve Mbikayi nsima na bobimi na bokutani na Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

M. Mbikayi alobi ete mbulamatari etindaki ye na Mbanza Ngungu ba cliniques mobiles misato mpo na komema bato ya likama yango elongo na nzoto ya bawei.

Mpo na M. Mbikayi, mbulamatari ekosomba sanduku ya bokundi mpo baye banso bakufaki lokola mingi kati na bango bawutaki Kinshasa.

Bus yango, ya marque Tata esalaki likama na butu ya samedi na dimanche na bokutani ya route N0 1 na nzela ya nkamba, na Lufu.

Président Félix Tshisekedi akitaki na esika yango lundi mpe alakaki kosunga bato banso bazwaki likama.

Bato 31 bafuki na likama yango, mingi nzoto na bango ezikaki. Zomi nde na mwambe bazokaki, bayike na mpota enene mpe bakotaki na lopitalo ya Nsona-Nkulu, na Mbaza Ngungu.

Motuka yango emema bato na biloko, mingi mpeza carburant.

Boko na bato bazokaki balobi mécanicien nde azalaki komema motuka ntango likama lyango lisalamaki.

XS
SM
MD
LG