Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour suprême ya Etats-Unis etiki nzela ete Kalev Mutond na Thambwe Mwamba bakoka kosambisama


Alexis Thambwe Mwamba, ministre congolais de la Justice, na Kinshasa, le 1er janvier 2017
Alexis Thambwe Mwamba, ministre congolais de la Justice, na Kinshasa, le 1er janvier 2017

Cour suprême ya Etats-Unis eboyi kozwa mokano mpo na boboyi ya immunité ya Kalev Mutond na Alexis Thambwe Mwamba, boko na bakonzi ya RDC, yango etiki nzela ete Cour d’appel fédéral. ekoka kosambisa bango.

Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ANR na Alexis Thambwe Mwamba, mokambi ya Sénat oyo azalaki ministre ya kala ya mambi ma Bosembo bafundamaki na moyi Amerika Darryl Lewis.

Cour suprême eboyaki kozwa mokano na bosenga ya bakonzi mboka mpo likambo lizali kati moyi Darryl Lewis na Kalev Mutond na Thambwe Mwamba.

Darryl Lewis asalaka kala na bokengeli Moïse Katumbi, opposant.

Moyi Amerika Lewis akangamaka mpe anyokwamaki na kofundama na kosala mosala na kobuka mokibo ya RDC.

Yambo, tribunal ya disctrict ya Washington D.C. eboyaki bofundami yango na kotalaka immunité to bobatelami ya MM. Kalev na Thambwe. Kasi cour d’appel ya D.C. epesaki nzela,

Bakonzi ba tribunal ya disctrict (ya Washington D.C) Etats-Unis bakebisaki ete yango ekobebisa bolamu bwa mboka songolo mpe ekotia na likama bayi Amerika na kolandelama na ba tribunaux ya mboka misusu.

Kasi Cour suprème eboyi koloba eloko moko, yango epesi nzela ete MM. Thambwe Mwamba na Kalev Mutond bakoka kosambisama ntango tribunal ekobenga bango na Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG