Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Kabila balakani kopesa na maboko na bitumba na COVID-19


Président Féliex Tshisekedi (D) na mokonzi ya kala Josepha Kabila bakutani na N'Sele. Kinshasa, 21 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Féliex Tshisekedi (D) na mokonzi ya kala Josepha Kabila bakutani na N'Sele. Kinshasa, 21 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi na mokonzi ya kala Joseph Kabila bakutani mardi na N’Sele. Masolo na bango matalaki bomoko kati na bitumba na coronavirus ya sika boye bosili koboma pene na bato 25 na RDC, elobi compte-rendu ya nsima ya bokutani bwango..

"Bababwaki lisusu mbela mpo na lisanga mpe bomoko ya na mboka mpe bosangani ya bana mboka banso nzinga nzinga na bitumba na bokono boye mpe na bosenga ya kotosa mikano mipesamaki na lisukulu mibale ya président Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, le 18 mars mpe le 24 mars 2020, kolanda malako ma OMS," eyebisi liyebisi nsima na bokutani bwa bango.

Nungu nungu ezali kati na mangomba ma bango mabale CACH, ya M. Tshisekedi, na FCC ya Kabila, mpo etali bokutani ya parlement nsima na lisakolami ya état d'urgence na président Tshisekedi.

Mikolo mileki, Alexis Thambwe Mwamba, mokambi ya Sénat alobaki ete bosakolami ya état d’urgence na président Tshisekedi, bolandaki te Buku likonzi. M. Thambwe Mwamba asengaki ete suku mibale ya parlement ekutana na Congrès ,po na "kozongisa makambo na nzela", kolanda maloba maye.

Yango ememani nkanda ya bayi CACH.

Cour constitutionnelle ekataki likambo na kolaba ete meko ya président Tshikedi eye esakolaki état d’urgence etosaki Buku likonzi.

Lundi 20 avril, président Tshisekedi azwaki meko epasaki ndingisa na parlement kokutana, ata likita inso ya bato koleka 20, lipekisami. Kasi Meko yango epekisi Congrès kosangana, elobi suku moko moko esanga na ngambo na yango.

Parlement esengeli ekutana mpo ebakisa mikolo na état d’urgence oyo bolayi na yango bokokoma na suka le 24 avril soki parlement ebendi yango molayi te.

Na liyebisi ya suka ya bokutani na bango, M. Tshisekedi apesi M. Kabila longanya mpo na kopesa na etuka ya Sud-Kivu lopitalo Mama Sifa ya Makobola na ntina ya kosunga babeli ya COVID-19.

XS
SM
MD
LG