Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Shadary, Mende, Kalev, Amisi, Boshab na 10 basusu basengi UE elongola etumbu


Ramazani Shadary na cathédral Nord-Dame du Congo na Kinshasa, 24 novembre 2018.
Ramazani Shadary na cathédral Nord-Dame du Congo na Kinshasa, 24 novembre 2018.

Zomi na mitano na basungi ya Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC, basengi na Union européenne elongola etumbu ezwaki yambo na maponami mpo na bango.

Na nzela ya basembeli na bango, Emmanuel Ramazani Shadary (candidat ya présidentielle na maponami ya 2018 mpe motambwisi ya PPRD, lisanga ya Kabila), Gabriel Amisi Kumba "Tango four" (chef d’Etat-major adjoint ya FARDC), Kalev Mutond (mokambi ya kala ya ANR), Lambert Mende (molebeli ya kala ya mbulamatari), John Numbi (mokambi ya kala police mpe moko na bakonzi ya mampinga), Delphin Kayimbi (mokambi ya Demiap), Célestin Kanyama (mokambi ya kala ya police), Evariste Boshab (ministre ya intérieur ya kala), Alex Kande, Ilunga Kampete, Ferdinand Ilunga, Roger Kibelisa, Jean-Claude Kazembe, Eric Ruhorimbere mpe Muhindo Akili Mundos bakomeli Union européenne mpo kosenga bolongoli etumbu likolo na bango.

Bakomi ete EU ekotaki na makambo ya kati ya RDC na kozwa etumbu eye.

Ndako ya misala ya ba avocats Daldewolf eye ezali na Bruxelles nde ekomi mokanda mwango.

Mpo na basambeli baye ntango ya etumbu eye esili eleki mpe ezali lisusu na loboko te mpo makambo mabongolamaki na RDC na maponami masalamaki na décembre 2018.

"Mokonzi ya sika asengaki kala te batala lisusu etumbu yango soki ezali na litomba," ekonduli basambeli baye.

Ba avocats yango balobi mpe lisusu ete eklezia katoliko esengaki mpe bolongwi na etumbu yango na nzela ya boyokani ya Saint Sylvetre boye bopesaki nzela ete maponami mazongisama nsima na ntango mpe masalama le 30 décembre 2018.

Bato baye 15 basengi masolo na UE mpe balobi bazali kozela babokutani mpo na yango.

UE epekisaki bango visa mpe ekangi bozwi na bango mpo kotelemela maponami mpe na démocratie yambo na maponami. Mpe mpo na kopekisa na makasi mpe minduki botelemili bonso.

XS
SM
MD
LG