Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biyamba motoba baponi motambwisi ya CENI na bozangi ya ba catholiques na ba protestants


Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.
Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.

ERC, ba Kimbanguistes, Comico, Orthodoxe, Ba indépendants mpe ba Salutistes baponi motambwisi ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na likita basalaki na mpokwa nsima na kokabwana ba protestants mpe ba catholiques na bozangi boyokani.

Bakambi ba ERC (Eglise du réveil au Congo), ya ba Kimbangusites (EJCSK), ya Armée du Salut, Orthodoxe, ba indépendants mpe ba Musulmans (Comico) bakobaki likita na ngambo na bango na ndako ya CIME (Commission d’Intégrité et Médiation Electorales) nsima kotelemisi misala bazalaki kosala elongo na bakambi ba katoliko (CENCO, likita lya ba episkopo ya catholique) mpe na ECC (Eyamba ya ba protestants to misioni).

"Toponi motambwi ya CENI. Bokoyeba nkombo na ye Assemblée nationale," elobi évangéliste Dodo Kamba, motambwisi ya ERC.

Kasi yambo na yango, likita bakambi ba biyambi binso bazalaki na likita wuto mardi na ntongo na Centre interdiocésain mpe bayokanaki nanu te.

Bakambi ba biyamba biye motoba bakendaki kokoba likita lya ngambo na bango na CIME.

Bakatoliko mpe ECC basakolaki ete likita lyango lisengelaki kokoba o’mwa misato.

"Tosali yango na makasi te. Tozali na bomoko mpe totosi mibeko mya biso banso," elobaki év. Dodo Kamba.

Na motuna motali nkombo ya Denis Kadima oyo mangoma maye motoba mazali kopesa maboko, év. Kamba alobi alandaka makambo matambolaka na ba réseaux sociaux te.

Likambo lisala pene na ndengo moko na boponami ya Ronsard Malonda oyo bato baboyaki mpe mobulu mobimaki na mboka kino bato basusu bakufaki le 3 juillet 2020 ntango FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila ezalaki nanu na majorité na Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG