Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nationale ekokende loyi te mpo na Etat de siège


Bakeli mibeko na ndako ya makita ya Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 15 décembre 2012.
Bakeli mibeko na ndako ya makita ya Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 15 décembre 2012.

Assemblée nationale ekokoba mosala mwa yango mpo na kotala mambi matali état de siege. Esengalaki ekende na loyi lobi lokola Sénat nsima na session ya mars.

Mokambi ya Assemblée nationale, Christophe Mboso Nkodia Puanga atangaki article 144 ya Buku Likonzi eye esengi na suku eye ya nse ya parlement koyeba kosangana mpo na kotala mpe kobakisa mikolo ya état de siège soki esengeli.

Bakambi ba Assemblée nationale balobi lisusu ete mikolo misengeli kobakisama na session eye ya Assemblée nationale na ntina ya kokoka kosala linaka lya bayi CENi (Commission électorale nationale indépendante).

Ezali lotomo mpo na Assemblée nationale kosala mosola moye, elimboli molobeli ya suku eye ya parlement.

Sénat, suku sya likolo, ekeyi na loyi nsima na kosilisa mosala mwa yango ya session ya mars.

Assemblée nationale ebakisaki mikolo 15 na état de siège eye mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi atiaki mpo na Nord-kivu mpe na Ituri nsima na kokisa sanza moko,

Ekobaki lisusu mikolo 15 soki bosenga bozali.

XS
SM
MD
LG