Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi ba Katumbi bakebisi "Union sacrée" ekopanzana soki makanisi ma Congolité mandimami


Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Lingomba lya Moïse Katumbi, Ensemble pour la république ekebisi ete soki makanisi makopekisa bana ba RDC baike kowelela mabonga lokola ya mokonzi ya mboka maleki na parlement, Unioin sacrée ekopanzana.

Ensemble pour la république ezali kati na Unioni sacrée, liboke lya majorité parlementaire likelamaki na novembre 2019 nzinga nzinga ya président Félix Tshisekedi nsima na bokabwani ya boyokani ya CACH ya mokonzi ya mboka na FCC ya mokonzi ya kala, Joseph Kabila.

"Bokotisami bonso na manaka ya misala ya Assemblée nationale ya makomi maye makozala bokabwani ya libela ya Union sacrée kati bato balingi kosalela kimwana mboka mpe koboya basusu na ntina ya bobatela bokonzi na ba républicains ya solo baye balingi kopesa bana mboka makoki ya kopona bakambi ba bango kati na bayi mboka na bango banso na nzela ya maponami malamu, ya kimya mpe ya bato banso," elobi na liyebisi kalaka mokonzi ya Ensemble pour la république, Dieudonné Bolengetenge Balea.

Jeudi, mokeli mibeko Nsingi Pululu amemelaki bureau ya Assemblée nationale makanisi ma Noël Tshani bo’ mabongisi ma mobeko mokopesa nzela kaka na baye babotama na tata mpe na mama ya Congolais kopesa nkombo mpo na mabonga ya nsomi lokola ya mokonzi ya mboka ya bakambi ya mampinga mpe bokengi mpe misusu.

M. Nsingi asokalaki ete azali na bakeli mibeko basusu koleka 260 baye bazali na nsima na ye.

Kasi bakeli mibeko basusu baboyi yango.

Nungu nungu ezali na mboka mpo na yango.

Bayi LUCHA, lingoma lya boalamusi bato na bomwana mboka, balaki kotelemisa bana mboka banda mposo mokoya mpe mpo na mobeko ya botambwisi CENI (misala mikambaka maponami) moye mokonzi ya mboka Tshisekedi asakolaki mikolo mileki nsima na bondimami na yango na parlement.

Baike na société civile mpe bayi politiki basusu bazali kosenga bolongwi ya loboko ya bayi politiki likolo na CENI.

LUCHA ekebisi na likama ya kotia bato baike pembeni ntango maponami masengeli kozala mpo na bato banso, na pole, bonsomi mpe na bondimi ya banso.

XS
SM
MD
LG